Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 55:14 - Mokanda na Bomoi

14 Kasi ezali yo, moto lokola ngai, oyo otambolaka elongo na ngai, molingami mpe moninga na ngai ya motema

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 55:14
6 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Balingami na ngai nyonso ya motema bayini ngai, bato oyo nazalaki kolinga babalukeli ngai ;


Nzembo ya Davidi. Nzembo ya mobembo mpo na kokende na Tempelo ya Yawe. Nasepelaka tango balobaka na ngai : « Tokende na Tempelo ya Yawe ! »


Ezala molingami na ngai ya kimia, oyo nazalaki kotiela motema mpe azalaki kolia sani moko elongo na ngai, abalukeli ngai.


Butu mpe moyi, mpinzoli na ngai ezalaka bilei na ngai ; pamba te balobaka na ngai tango nyonso : « Nzambe na Yo azali wapi ? »


Bato ya bikolo ebele bakokende kuna mpe bakoloba : « Boya, tomata na ngomba ya Yawe, na Tempelo ya Nzambe ya Jakobi. Akoteya biso banzela na Ye mpo ete tolanda banzela mike na Ye. » Pamba te Mobeko ekowuta na Siona, mpe Liloba na Yawe ekowuta na Yelusalemi.


Bongo bato na Ngai bayei epai na yo ndenge kaka bayaka tango nyonso mpe bavandi liboso na yo mpo na koyoka maloba na yo, kasi batiaka yango na misala te, pamba te minoko na bango ebimisaka kaka makambo oyo esepelisaka mitema na bango, mpe mitema na bango elukaka kaka bolamu na bango moko.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ