Basinga ya lifofe ekokoma bilamba te, misala na bango ekobomba bango te ; misala na bango ezali misala mabe, mpe misala ya mobulu nde ezalaka na maboko na bango.
Matambe na bango epotaka mbangu mpo na kosala mabe, mpe bazalaka mbangu mpo na kosopa makila ya moto oyo asali mabe te. Makanisi na bango ezalaka kaka ya mabe ; kobuka-buka mpe kobebisa nde ezalaka na nzela na bango.