Yawe alobaki na ye : « Tambola kati na Yelusalemi mpe tia bilembo na bilongi ya bato oyo bazali komona pasi na mitema mpe bazali kolela likolo ya makambo nyonso ya nkele oyo ezali kosalema kati na engumba oyo. »
Wana mitema na bango epelaka lokola moto ya fulu, bapusanaka pene na ye na mayele mabe. Butu mobimba, balalaka na kanda ; mpe na tongo, kanda yango ekomaka kopela lokola moto.
Bongo na tongo makasi, longwa na ndako ya Kayifa, bamemaki Yesu kati na ndako ya moyangeli oyo azalaki moto ya Rome. Kasi bango moko bato oyo bamemaki Yesu bakotaki te kati na ndako ya moyangeli, mpo ete bamikomisa mbindo te mpe mpo ete bazwa nzela ya kolia bilei ya Pasika.
Saulo atindaki mibali kozonga na ndako ya Davidi mpo na kokengela ye mpe koboma ye na tongo. Kasi mwasi na ye, Mikali, ayebisaki ye : « Soki okimi te na pokwa ya lelo mpo na kobatela bomoi na yo, bakoboma yo lobi ! »