anjelu oyo akangolaki ngai na mabe nyonso, apambola bana oyo ya mibali ! Tika ete babengama na kombo na ngai, mpe na bakombo ya bakoko na ngai, Abrayami mpe Izaki ! Tika ete bakoma ebele kati na mokili !
Davidi azongiselaki Rekabi mpe Baana, ndeko na ye ya mobali, bana mibali ya Rimoni, moto ya Beyeroti : — Na Kombo na Yawe oyo akangoli ngai na pasi nyonso
Nayebi solo ete Nkolo akokoba kokangola ngai wuta na misala nyonso ya mabe mpe akobikisa ngai mpo na Bokonzi na Ye ya Likolo. Tika ete nkembo ezonga epai na Ye mpo na libela na libela ! Amen.
Ndenge bomoi na yo ezalaki lelo motuya makasi na miso na ngai, ndenge wana mpe bomoi na ngai ekozala motuya makasi na miso ya Yawe, mpe akokangola ngai na pasi nyonso.