6 Tala, Nzambe azali lisungi na ngai, Nkolo azali eyekamelo na ngai.
Tika ete babonza bambeka ya kozongisa matondi mpe bapanza sango ya misala na Ye na koganga na esengo !
Nakobonzela Yo mbeka mpo na kozongisa matondi, mpe nakobelela Kombo ya Yawe.
Yawe azali mpo na ngai, ayaka kosunga ngai ; boye natalaka banguna na ngai na miso lokola molongi.
Nayebi ete Yawe akotaka makambo ya babola mpe alongisaka bato oyo bakelela.
Bokumisa Yawe ! Tala ndenge ezali malamu kosanzola Nzambe na biso, mpe ndenge ezali kitoko kokumisa Ye !
pamba te okobengana bango tango okobwakela bango bambanzi ya tolotolo na Yo.
Bonzelaka Nzambe matondi lokola mbeka, mpe kokisaka bandayi na yo epai ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo.
« Tala moto oyo azalaki te kozwa Nzambe lokola ebombamelo na ye, azalaki kotiela bozwi na ye motema, mpe kobakisa makasi na ye na nzela ya kobebisa bato mosusu. »
Pasi oyo ayokisaka bato ezongelaka ye moko, mpe mabe na ye ekweyaka na moto na ye moko.
Nzembo ya koyemba na mokolo ya Saba.
Lokola Nkolo Yawe asungaka ngai, nakoyokisama soni te. Yango wana, nakomisi elongi na ngai makasi lokola libanga, mpe nayebi ete nakoyokisama soni te.
Ezali Nkolo Yawe nde asungaka ngai ; nani akolonga ngai na esambiselo ? Tala, bango nyonso bakokweya lokola bilamba ya kala oyo ebeba, bongo nseka ekolia bango.