3 Oh Nzambe, bikisa ngai na nzela ya Kombo na Yo, longisa ngai na nzela ya nguya na Yo.
Natalelaka Yawe tango nyonso, pamba te azali pene na ngai mpo ete naningana te.
Tika ete Yawe ayanola yo na tango ya pasi ; tika ete Nzambe ya Jakobi azala ndako batonga makasi mpo na kobatela yo.
Makasi na ngai ekawuki lokola potopoto, mpe nazali kokoka lisusu koloba te ; otie ngai pembeni ya lilita.
Nzembo ya Davidi, mowumbu ya Yawe. Wuta na buku ya mokambi ya bayembi.
Yawe, nabondeli Yo, kangola ngai ; Yawe, yaka noki kosunga ngai.
Oh Nzambe, longisa ngai mpe lobela ngai liboso ya ekolo oyo etosaka makambo na Yo te ; kangola ngai wuta na maboko ya bakosi mpe ya bato mabe.
Bango nyonso bazali batomboki, bango nyonso bamibebisa ; moko te asalaka bolamu, ata moto moko te.
Pamba te nandimi kofingama mpo na Yo, mpe soni ezipi ngai elongi.
Nzambe, bato ya lofundu bazali kobundisa ngai, mpe ngulupa ya bato na kanza bazali koluka koboma ngai ; batosaka Yo ata moke te.
Bakosala bongo mpo ete batikalaki koyeba te ezala Tata to ngai.