Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 53:5 - Mokanda na Bomoi

5 Boni, bato nyonso ya misala mabe bayebi eloko te ? Baliaka bato na ngai ndenge baliaka lipa mpe batikala nanu kobelela Nzambe te, bazali penza kososola eloko moko te ?

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 53:5
22 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Lokito ya somo etondisaka matoyi na ye, bato ya mobulu babimelaka ye ata na tango ya kimia.


Somo monene ekangi bango, pamba te Nzambe azali kati na bato ya sembo.


Lokola tango babalolaka mpe batimolaka mabele, mikuwa na biso epanzani liboso ya mboka ya bakufi.


Kasi Ye oyo avandi na Kiti na Ye ya Bokonzi kuna na likolo aseki, Yawe atioli bango.


Tika ete bato nyonso oyo basepelaka na pasi na ngai, bango nyonso lisanga, bayoka soni mpe basambwa ! Tika ete bato oyo batombokelaka ngai balata soni mpe bazala kati na yikiyiki !


Tika ete bato oyo bazali komeka bomoi na ngai basambwa mpe bayoka soni ; tika ete bato oyo bazali kokana kosala ngai mabe bazonga sima mpe bakoma mawa-mawa !


Yawe, nabondeli Yo, kangola ngai ; Yawe, yaka noki kosunga ngai.


Ndenge ndoto elimwaka soki moto alamuki na pongi, Nkolo, olimwisaka lisolo ya bomoi na bango tango kaka otelemaka.


Moto mabe akimaka ata soki moto moko te abengani ye, kasi bato ya sembo bazalaka na mpiko lokola nkosi.


Nakokomisa yo moke kati na bikolo, ekolo ya kotiola kati na bato.


Babengaka bango palata babwaka, pamba te Yawe asundola bango. »


Abebisi lopango na ye ndenge babebisaka lopango ya elanga, abebisi esika na bango ya mayangani. Na kanda makasi na Ye, Yawe asali ete Siona abosana bafeti oyo ekatama mpe mikolo ya Saba ; mpe apameli mokonzi mpe Nganga-Nzambe.


Nakotanda bibembe ya bana ya Isalaele liboso ya banzambe na bango ya bikeko mpe nakopanza mikuwa na bino zingazinga ya bitumbelo na bino.


Nakotombokela bino, mpe bokokweya liboso ya banguna na bino ; ba-oyo bayinaka bino bakokonza bino mpe bokokima ata soki moto moko te azali kolanda bino.


Bongo na mikili ya banguna na bino, bato oyo bakotikala na bomoi kati na bino, nakolembisa bango nzoto : bakokima ata makelele ya lokasa oyo mopepe eningisi, bakokima lokola nde bazali kokima liboso ya mopanga mpe bakobambana na mabele ata soki moto moko te azali kolanda bango.


Mpe kobanga makasi ekotaki kati na molako, kati na etando mpe kati na bato nyonso : ezala basoda oyo bazalaki kokengela molako mpe basoda ya mpiko, bango nyonso bakomaki kobanga makasi mpe mabele eninganaki. Ezalaki somo oyo Ye moko Nzambe atindaki.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ