Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 53:1 - Mokanda na Bomoi

1 Nzembo ya Davidi. Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Eyembamaki na flite.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 53:1
24 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Jeroboami amilobelaki : « Ndenge makambo ezali kotambola, bokonzi ekoki kozonga na ndako ya Davidi.


Ezalaki lisusu na mibali oyo bazalaki komipesa na kindumba ya bule kati na mokili ya Yuda : bamipesaki na kosala makambo ya nkele kolanda bikolo ya bapaya oyo Yawe abenganaki liboso ya bato ya Isalaele.


Nani akoki kobimisa bopeto kati na mbindo ? Moko te !


ekozala boni mpo na moto mabe, moto oyo abeba, oyo asalaka mabe lokola azali komela mayi ?


Amilobelaka : « Nzambe akotikala koyeba te, abombaka elongi na Ye mpe akotikala komona te. »


Mpo na nini moto mabe afinga Nzambe ? Mpo na nini amilobela : « Nzambe akopesa ngai etumbu te ? »


Na lolendo na ye, moto mabe alobaka : « Nzambe azalaka te. » Kati na makanisi na ye nyonso, ezali na esika te mpo na Nzambe.


Amilobelaka : « Eloko moko te ekotikala kolengisa ngai. » Alapaka ndayi boye : « Moko te akotikala kosala ngai mabe. »


Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya bana ya Kore. Ezali ya koyemba na flite. Nzembo ya Emani, moto ya Ezera.


Yawe, misala na Yo ezali minene, mpe makanisi na Yo ezali mozindo !


Otambolaki kaka te na banzela na bango mpe olandaki kaka te bizaleli na bango ya mbindo, kasi okomaki mabe koleka bango, na etamboli na yo nyonso.


Samari asalaki te ata kati-kati ya masumu oyo yo osalaki. Osalaki makambo ya mbindo koleka bango ; mpe na nzela ya makambo na yo nyonso ya mbindo, osalaki ete bandeko na yo ya basi bamonana lokola bato ya sembo koleka.


Kasi Ngai, nalobi na bino : Moto nyonso oyo akokangela ndeko na ye kanda akosamba na esambiselo liboso ya basambisi ; moto oyo akofinga ndeko na ye : ‹ zoba, › akosamba liboso ya Likita-Monene ; mpe oyo akoloba na ndeko na ye : ‹ moto ya liboma, › akobwakama kati na moto ya lifelo.


Kasi Nzambe alobaki na ye : « Zoba ! Na butu ya lelo kaka, okokufa. Bongo nani akokoma nkolo biloko nyonso oyo ondukaki mpo na yo moko ? »


Pamba te, atako bayebaki Nzambe, kasi bapesaki Ye te lokumu oyo ekoki na Nzambe mpe bapesaki Ye matondi te, kasi makanisi na bango ekomaki ya bozoba, mpe mitema na bango, oyo ezangaki mayele, etondaki na molili.


Lokola bamonaki ete koyeba Nzambe ezali na tina te, Nzambe akabaki bango na makanisi na bango ya mabe, mpo ete basala makambo oyo ebongi te.


Pamba te makambo nyonso oyo esalemaka na nkuku ezalaka soni mpo na kolobela yango.


Bokoki te kogumbamela Yawe, Nzambe na bino, ndenge bango basalaka. Pamba te Yawe amonaka yango lokola likambo ya nkele mpe ayinaka makambo oyo basalaki mpo na banzambe na bango : bazalaki ata kotumbaka na moto bana na bango ya mibali mpe ya basi lokola mbeka mpo na banzambe na bango.


Solo, na kala, bolekisaki tango mingi na kosala makambo oyo Bapagano basalaka : kindumba, baposa mabe ya nzoto, milangwa, lokoso ya kolia mpe ya komela, mpe kosambela bikeko ya nkele.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ