9 « Tala moto oyo azalaki te kozwa Nzambe lokola ebombamelo na ye, azalaki kotiela bozwi na ye motema, mpe kobakisa makasi na ye na nzela ya kobebisa bato mosusu. »
Amani abetelaki bango lisolo ya bomengo na ye oyo ezalaki penza ebele, motango ya bana na ye mpe makambo nyonso oyo mokonzi azalaki kosala mpo na kopesa ye lokumu mpe ndenge nini atombolaki ye likolo ya bakambi mpe bakalaka mosusu.
Solo, basalaka makita mpo na kokweyisa ye wuta na esika na ye ya likolo, basepelaka kotatola lokuta. Bapambolaka na nzela ya minoko na bango ; kasi kati na mitema na bango, balakelaka mabe.