Azali lokola nzete oyo balona pene ya mayi, oyo ebotaka mbuma na eleko na yango, mpe makasa na yango ekawukaka te ; misala na ye nyonso etambolaka malamu.
Kati na ndako na yo, mwasi na yo azali lokola nzete ya vino oyo ebotaka bambuma ebele ; bana na yo bazali lokola bankona ya nzete ya olive zingazinga ya mesa na yo.
Yawe azalaki kobenga yo « Nzete ya olive ya mobesu oyo etonda na mbuma kitoko. » Kasi Yawe akotumba yango na makelele ya mopepe makasi, mpe bitape na yango ekobukana-bukana.
Boye, soki yo owutaki na nzete ya olive ya zamba oyo ebimisaki yo mpe bakangisaki yo na nzete ya olive oyo balona, ezala soki yango te nde ebimisaki yo, ndenge nini bakoki te kozongisa bitape ya nzete oyo ebimisaki yango na nzete na yango ?