Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 52:3 - Mokanda na Bomoi

3 Yo elombe, mpo na nini ozali komikumisa na tina na mabe ? Bolingo ya Nzambe emonanaka mikolo nyonso.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 52:3
10 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kino tango nini bokosangela moto moko ? Kino tango nini bino nyonso bokosangana mpo na koluka koboma ye lokola mir oyo etengami, lokola lopango oyo esili kokweya ?


Molimo ya moto mabe elingaka kaka makambo mabe ; ata moninga na ye penza azwaka ngolu te na miso na ye.


« Bato na Ngai bazali bazoba, bayebi Ngai te ; bazali bana bazangi bososoli, bazali na mayele te, bayebi kaka kosala mabe, kasi bayebi kosala bolamu te. »


Bongo na makambo ya boye, napesa bango etumbu te, » elobi Yawe ? « Nazongisa mabe na mabe te na ekolo ya boye ? »


Nzokande, ezali bino bato bozali koboya bolamu mpe bozali kolinga mabe. Bozali kolongola poso ya nzoto ya bato ya libota na ngai, bozali kolongola misuni na bango mpe kobuka mikuwa na bango.


Ezali Satana nde azali tata na bino, mpe bolingi nde kaka kokokisa posa ya tata na bino. Wuta na ebandeli, ye azala mobomi ; avandaka kati na solo te, pamba te solo ezalaka te kati na ye. Tango akosaka, alobaka penza makambo oyo ewutaka kati na ye ; pamba te azali mokosi mpe tata ya lokuta.


Basundolaki bosolo ya Nzambe mpo na komipesa na makambo ya lokuta, bapesaki lokumu mpe bagumbamelaki bikelamu, na esika ya Mokeli oyo apesamela nkembo mpo na seko. Amen !


bateki baninga, bato ya mitema mikuse, bato na komitombola, bato balinga bisengo na esika ya kolinga Nzambe ;


Kasi bambwa, bato ya maji, bandumba, babomi, basambeli bikeko mpe bato nyonso oyo balingaka mpe basalelaka lokuta, bakozala na libanda ya engumba.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ