Nzambe alobaki na ye na ndoto : — Solo, nayebi ete osali yango na motema sembo. Yango wana nabatelaki yo mpo ete osala lisumu te epai na Ngai, mpe natikaki te ete osimba ye.
Moto moko te aleki ngai na monene kati na ndako oyo. Nkolo na ngai apekisi ngai eloko moko te longola kaka yo, pamba te ozali mwasi na ye. Boye ndenge nini penza ngai nakoki kosala likambo ya mabe boye mpe kosala masumu liboso ya Nzambe ?
Batumbaki na moto lokola mbeka bana na bango ya mibali mpe bana na bango ya basi. Basalelaki soloka mpe kindoki, mpe bamikabaki mpo na kosala makambo mabe na miso ya Yawe. Boye batumbolaki kanda ya Yawe.
Abonzaki na moto, lokola mbeka, mwana na ye ya mobali ; asalelaki kindoki, soloka mpe maji. Atiaki na mosala bato oyo basololaka na milimo ya bakufi mpe bamoni makambo. Akobaki kosala makambo mabe na miso ya Yawe ; mpe, na bongo, apelisaki kanda ya Yawe.
Pamba te akata mokolo oyo akosambisa mokili mobimba na bosembo nyonso, na nzela ya moto oyo Ye asila kopona. Atalisaki bosolo na yango epai ya bato nyonso, na nzela ya kosekwisa moto yango kati na bakufi.
Kasi mpo na moto makasi na yo mpe motema libanga na yo, ozali yo moko komibendela etumbu monene mpo na mokolo oyo Nzambe akokweyisa kanda na Ye mpe akomonisa kosambisama na Ye ya sembo.