Bato nyonso oyo babotama na molongo ya bana ya Isalaele bakabwanaki na bapaya nyonso ; batelemaki mpo na kotubela masumu na bango mpe bambeba ya batata na bango.
Tango nandimaki masumu na ngai mpe nabombaki mabe na ngai te, nalobaki : « Nakotubela masumu na ngai liboso ya Yawe. » Bongo Yo olimbisaki mabe mpe masumu na ngai.
Pamba te mabe na biso ekomi mingi na miso na Yo, mpe masumu na biso ekomi kofunda biso ; masumu na biso ezali liboso na biso mpe toyebi malamu bambeba na biso :
Soni ekomi lokola mbeto na biso, mpe kosambwa, lokola bulangeti mpo na komizipa ; pamba te biso mpe batata na biso, tosalaki masumu liboso ya Yawe, Nzambe na biso, totosaki Yawe te, wuta bolenge na biso. »