Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 51:18 - Mokanda na Bomoi

18 Mpo ete osepelaka na mbeka te, nakobonza te mbeka ya kotumba oyo ondimaka te.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 51:18
23 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bongo nalobaki na bango : — Bozali komona pasi oyo tozali na yango ! Yelusalemi ebebi, mpe bikuke na yango ebebisamaki na moto ! Boya, totonga lisusu mir ya Yelusalemi mpo ete tolongwa kati na soni oyo !


Bikolo ekotosa Yawe, mpe bakonzi nyonso ya mokili bakondima nkembo na Yo.


Yawe azali kotonga lisusu Yelusalemi epai wapi akosangisa bato ya Isalaele oyo bakenda na bowumbu.


Nzambe, kangola Isalaele, na pasi na yango nyonso !


Osepelaki te na bambeka mpe na makabo, kasi ofungolaki matoyi na ngai ; osengaki te makabo ya kotumba mpe bambeka mpo masumu.


Tika ete likolo mpe mabele, bibale minene mpe nyonso oyo ezali kati na yango ekumisa Ye !


Solo, Yawe akobondisa Siona mpe akotala na liso ya ngolu bisika nyonso ya Siona oyo ebeba ; akokomisa esobe na yango lokola Edeni, bisika na yango ekawuka, lokola elanga ya Yawe. Esengo mpe kosepela nde ekomonana kuna, matondi mpe mongongo ya banzembo.


Mpo na yo, bakotonga lisusu bandako oyo ebukana-bukana na kala, bakomatisa lisusu miboko oyo ebukana wuta kala ; bakobenga yo : ‹ Mobongisi ya bamir oyo ebukana mpe ya banzela oyo bato balekaka. ›


Mpo na likambo ya Siona, nakokanga monoko na Ngai te ; mpo na likambo ya Yelusalemi, nakovanda kimia te, kino bosembo na ye emonana lokola kongenga ya pole, mpe lobiko na ye emonana lokola mwinda.


Bino bato oyo bobiki na mopanga, bokima, bolekisa tango te ! Wuta na mokili ya mosika, bokanisa Yawe mpe Yelusalemi !


Yeba mpe sosola makambo oyo : wuta tango lisakoli ya kobongisa mpe ya kotonga lisusu Yelusalemi ebimaki kino koya ya mokonzi, Ye oyo azwaki epakolami, ekosala baposo sambo mpe baposo tuku motoba na mibale. Engumba ekotongama lisusu elongo na nzela mpe bamir na yango oyo batonga makasi.


Yawe akosepela solo soki tomemeli Ye minkoko ya bameme ya mibali to soki topesi Ye mafuta ebele lokola mayi ya ebale ? Boni, topesa solo bana na biso ya liboso mpo ete tozwa bolimbisi masumu na biso ? Boni, topesa bana na biso ya mibali oyo bawuti na mikongo na biso mpo ete akoka kolongola masumu na biso ?


Mokolo ya kotonga lisusu bamir na yo ekoya ; ezali mokolo wana nde bandelo ya mokili na yo ekopusama lisusu mosika.


Natombolaki lisusu miso mpe namonaki moto moko liboso na ngai, asimbaki singa oyo bamekelaka molayi, na loboko na ye.


Oh etonga moke, bobanga te ! Pamba te Tata na bino asepelaki kopesa bino Bokonzi !


abongisa biso wuta kala mpo ete tozwa makoki ya kokoma bana na Ye na nzela ya Yesu-Klisto, kolanda bolamu mpe mokano na Ye moko,


mpe na kolakisa biso mabombami ya mokano na Ye, mabombami oyo abongisa kati na Klisto kolanda bolamu na Ye,


pamba te ezali Nzambe nde apesaka posa mpe makoki ya kosala makambo nyonso, ndenge ezali mabongisi na Ye ya bolingo.


Yango wana tobondelaka tango nyonso Nzambe na biso mpo na bino, mpo ete akomisa bino bato oyo babongi na bomoi oyo abengaki bino mpo na yango ; mpe mpo ete, na nzela ya nguya na Ye, akokisa posa na bino ya kosala bolamu to makambo nyonso oyo kondima na bino ezali kotinda bino kosala.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ