Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 51:17 - Mokanda na Bomoi

17 Nkolo, fungola bibebu na ngai, mpe monoko na ngai ekokumisa Yo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 51:17
25 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Lokola motema na yo etutami, lokola omikitisi liboso ya Yawe sima na yo koyoka makambo oyo nalobaki, mpo na kotelemela esika oyo elongo na bavandi na yango, ete bakobebisama mpe bakolakelama mabe ; lokola opasoli bilamba na yo mpe oleli liboso na Ngai, Ngai mpe nayoki, elobi Yawe.


Pamba te Yawe akotonga lisusu Siona mpe akomonana kati na nkembo na Ye.


Tika ete babonza bambeka ya kozongisa matondi mpe bapanza sango ya misala na Ye na koganga na esengo !


Abikisaka bato oyo batutami na mitema mpe akawusaka bapota na bango.


Bino bato oyo botosaka Yawe, bosanzola Ye ! Bino nyonso bana ya Jakobi, bopesa Ye lokumu ! Bino nyonso bana ya Isalaele, botosa Ye !


Tango bato ya sembo babelelaka, Yawe ayokaka mpe akangolaka bango na pasi na bango nyonso.


Bambuma mpe bitape ezalaki ekangana na etelemiselo ya minda ; mpe nyonso esalemaki na wolo ya peto, wolo oyo batuti na nzela ya marto.


Pamba te, tala liloba oyo Ye-Oyo-Aleki-Likolo, Ye oyo akowumela seko na seko mpe azali bule, alobi : « Navandaka na esika oyo eleki likolo mpe ya bule ; kasi navandaka mpe elongo na moto oyo azali na pasi mpe oyo molimo na ye ebukani, mpo na kolendisa lisusu molimo oyo etutami mpe motema oyo ebukani.


Boni, loboko na Ngai te nde esalaki biloko oyo nyonso, mpe yango te nde ezalisaki yango nyonso ? » elobi Yawe. « Tala moto oyo Ngai nakotala : moto ya mawa, oyo molimo na ye etutami, mpe oyo alengaka liboso ya liloba na Ngai.


Boboma bampaka, bilenge, basali ya mibali, basali ya basi mpe bana mike ; kasi bomeka kosimba te moto nyonso oyo azali na elembo na elongi. Bobanda na Esika na Ngai ya bule ! » Boye babandaki na bampaka oyo bazalaki liboso ya Tempelo.


Nayini bafeti na bino ya bule, nazali kosepela na yango ata moke te ; mayangani na bino ya bule ezali kolumba solo mabe liboso na Ngai.


« Esengo na babola na molimo, pamba te Bokonzi ya Likolo ezali mpo na bango !


Kolinga Ye na motema na yo mobimba, na mayele na yo nyonso mpe na makasi na yo nyonso, mpe kolinga moninga na yo ndenge yo moko omilingaka, yango nde ezali na tina mingi koleka bambeka ya kotumba mpe makabo nyonso.


Na nzela yango, nazali koloba na bino : ba-anjelu ya Nzambe basepelaka mpo na mosumuki moko oyo abongoli motema.


Bandeko, mpo na mawa oyo Nzambe atalisi biso, nazali kosenga na bino ete bokabaka banzoto na bino epai ya Nzambe lokola mbeka ya bomoi, ya bule mpe esepelisaka Nzambe. Ekozala mpo na bino losambo ya solo kolanda ndenge esengeli.


Natatoli ete nasili kozwa biloko ebele penza mpe nakomi na yango ebele koleka, awa nazwi, na maboko ya Epafrodite, makabo oyo botindelaki ngai ; yango ezali lokola malasi ya solo kitoko, mbeka oyo Nzambe andimi mpe oyo ezali kosepelisa Ye.


Bobosanaka te kosala bolamu mpe kosunga bato, pamba te yango nde bambeka oyo Nzambe asepelaka na yango.


Bino mpe, lokola mabanga ya bomoi, botika ete Nzambe asalela bino mpo na kotonga Tempelo ya Molimo. Kati na Tempelo yango, lokola Banganga-Nzambe ya bule, apesi bino mokumba ya kobonzelaka Ye, na nzela ya Yesu-Klisto, bambeka ya molimo, bambeka oyo Nzambe andimaka.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ