Mpo na nini otioli Liloba na Yawe na kosala makambo oyo ezali mabe na miso na Ye ? Obomisi Iri, moto ya Iti, na mopanga mpe ozwi mwasi na ye mpo ete akoma mwasi na yo. Obomisi ye na mopanga ya bato ya Amoni.
Yawe, Nzambe na ngai, bikamwa mpe mabongisi oyo osalaka mpo na biso ezali ebele penza. Moko te akokani na Yo ; nalingi kotatola mpe kopanza sango na yango, kasi motango na yango eleki ebele.
Epai na Yo, epai na Yo kaka, nasali masumu mpe mabe na miso na Yo. Boye, okozala sembo tango okozwa mokano, mpe okozala na pamela te tango okokata makambo.
Soki bakangi mobali azali kosangisa nzoto na mwasi ya mobali mosusu, bango nyonso mibale basengeli kokufa. Na nzela wana nde bosengeli kolongola mabe kati na Isalaele.
Samuele alobaki : — Boni, Yawe asepelaka mingi na bambeka ya kotumba mpe na makabo koleka kotosa mongongo na Ye ? Te ! Botosi eleki mbeka ; koyoka eleki mafuta ya meme ya mobali.