Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 51:15 - Mokanda na Bomoi

15 Nakoteya banzela na Yo epai ya babuki mibeko, mpe bato ya masumu bakozonga epai na Yo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 51:15
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Yuda azongisaki : — Likambo nini tokoki koloba na nkolo na ngai ? Tokoloba lisusu nini ? Ndenge nini tokoki kotalisa ete toyebi likambo te ? Nzambe alakisi polele mbeba ya basali na yo. Tokomi sik’oyo bawumbu ya nkolo na ngai, biso nyonso elongo na ye oyo amonani ete azalaki na kopo kati na saki na ye.


Na monoko na ngai, natangaka mibeko na Yo nyonso.


Yawe, yokela ngai mawa, tala ndenge nini bayini na ngai bazali konyokola ngai, mpe kangola ngai wuta na bikuke ya kufa ;


Yawe alobaki na ye : — Nani apesaka monoko epai ya moto ? Nani akomisaka moto baba to mokufi matoyi ? Nani akomisaka moto, moto oyo amonaka to mokufi miso ? Boni, ezali Ngai Yawe te ?


mpo ete okanisa yango lisusu, oyokela yango soni mpe ofungola lisusu monoko na yo te mpo na soni, tango nakolimbisa masumu na yo mpo na mabe nyonso oyo osalaki, elobi Nkolo Yawe. › »


Na mokolo wana, nakobimisa liseke mpo na libota ya Isalaele ; nakofungola monoko na yo kati na bango, mpe bakoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe. »


Kasi tango nakoloba na yo mpe nakofungola monoko na yo mpo ete oyebisa bango : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi. › Tika ete moto oyo akolinga koyoka ayoka, mpe oyo akoboya koyoka aboya na ye ! Pamba te bazali libota ya batomboki. »


Loba na bango : ‹ Na Kombo na Ngai, elobi Nkolo Yawe, nasepelaka na kufa ya moto mabe te ; nalingaka nde ete abongola bizaleli na ye mpo ete abika ! Bobongwana, bobongwana, oh libota ya Isalaele ! Mpo na nini bolingi kaka nzela ya kufa ? ›


Atunaki ye : « Molingami na ngai, okoti awa ndenge nini awa olati te elamba oyo ebongi na feti ya libala ? » Moto yango azangaki eyano ya kopesa.


Atalaki na likolo, abendaki pema mpe alobaki na ye : « Fungwama ! »


Nzokande, toyebi malamu ete makambo nyonso oyo Mobeko elobaka, elobaka yango mpo na bato oyo bazali na se ya bokonzi ya Mobeko, mpo ete moto moko te amilongisa, mpe mpo ete moto nyonso asosola ete azali moto ya masumu liboso ya Nzambe.


Yango wana, na nzela ya Yesu, tobonzelaka Nzambe tango nyonso mbeka ya masanzoli, elingi koloba : mbuma ya bibebu oyo etatolaka polele Kombo na Ye.


Yawe akobatelaka makolo ya babulami na Ye, kasi bato mabe bakobunga kati na molili. Moto akotikala kolonga te na makasi na ye moko.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ