Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 51:14 - Mokanda na Bomoi

14 Zongisela ngai esengo ya lobiko na Yo, mpe kabela ngai molimo oyo emibongisi malamu mpo na kolendisaka ngai.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 51:14
27 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Ribeni alobaki na bango : — Nayebisaki bino ete bosala mwana wana mabe te ? Kasi boyokelaki ngai te. Sik’oyo tosengeli kofuta makila na ye !


Yango wana, soki moto asopi makila ya moto, bakosopa mpe makila na ye epai ya moto, pamba te Nzambe asalaki moto na elilingi na Ye.


Mpo na nini otioli Liloba na Yawe na kosala makambo oyo ezali mabe na miso na Ye ? Obomisi Iri, moto ya Iti, na mopanga mpe ozwi mwasi na ye mpo ete akoma mwasi na yo. Obomisi ye na mopanga ya bato ya Amoni.


Tango Davidi azalaki mokonzi, nzala makasi ekotaki mpe esalaki mibu misato. Davidi atunaki Yawe, mpe Yawe alobaki na ye : « Ezali mpo na Saulo mpe libota na ye oyo esopaki makila, pamba te babomaki bato ya Gabaoni. »


Sima na yango, tango kaka Davidi ayokaki sango ya makambo oyo ewutaki kosalema, alobaki : — Na miso ya Yawe, ngai mpe bokonzi na ngai tozali na ngambo te mpo na libela na tina na makila ya Abineri, mwana mobali ya Neri.


Makambo nyonso oyo ekomeli biso ezali mbano ya etamboli mabe na biso mpe ya ngambo na biso monene. Mpe lisusu, oh Nzambe na biso, na kotala ebele ya masumu oyo tosali, etumbu oyo opesi biso ezali moke penza, mpo ete otikeli biso kutu ndambo ya bato oyo !


Kati na makambo nyonso oyo ekweyelaki biso, ozalaki sembo ; mpe osalaki na boyengebene, wana biso totambolaki mabe.


Kamba ngai kati na bosolo na Yo mpe pesa ngai mayele, pamba te ozali Nzambe, Mobikisi na ngai ; mpe ngai natiaka elikya na ngai kati na Yo tango nyonso.


Kolongola te molimo na ngai nzela moko na bato ya masumu, bomoi na ngai elongo na basopi makila,


Nakosakola bosembo na Yo, nakokumisa Yo mikolo nyonso.


Yawe, kosundola ngai te ; Nzambe na ngai, kozala mpe mosika na ngai te.


Bwakela Yawe mokumba na yo, akosunga yo ; akotika te ete moto ya sembo akweya mpo na libela.


Tika ete Nkolo akumisama, mokolo na mokolo ! Nzambe Mobikisi na biso alataka makambo na biso.


Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya bana ya Kore. Ezali ya koyemba na flite. Nzembo ya Emani, moto ya Ezera.


Solo, Nzambe azali lobiko na ngai ; nakotia elikya na ngai epai na Ye mpe nakobanga lisusu te. Nkolo Yawe azali makasi mpe nguya na ngai ; azali lobiko na ngai. »


Kasi Yawe akobikisa Isalaele na lobiko ya seko na seko. Bokotikalaka lisusu koyoka soni te mpe kosambwa te, libela na libela.


Soki nalobi na moto mabe : ‹ Oh moto mabe, okokufa solo ! › Mpe yo, olobi na ye eloko moko te mpo ete abongola bizaleli na ye, moto mabe wana akokufa solo mpo na masumu na ye ; kasi nakotanga makila na ye na moto na yo.


Nkolo, nabondeli Yo, kolanda makambo nyonso oyo osalaka mpo na bosembo, kanda mpe kotomboka na Yo ezali kolongwa kati na engumba na Yo, Yelusalemi, ngomba na Yo ya bule ! likolo ya masumu na biso mpe ya mabe ya bakoko na biso, Yelusalemi mpe bato na Yo bakomi eloko ya liseki na miso ya bato nyonso oyo bazingeli biso.


Nkolo, ozali sembo ; kasi biso, lelo, tolatisami na soni : bato ya Yuda, bavandi ya Yelusalemi mpe bana nyonso ya Isalaele, ezala ba-oyo bazali pembeni to ba-oyo bazali mosika, kati na mikili nyonso epai wapi opanzaki biso mpo ete tozangaki boyengebene liboso na Yo !


etikali kaka kolakelana mabe, lokuta, makambo ya somo, moyibi, kindumba, mobulu mpe kobomana se kobomana.


Kasi ngai nakosepela kati na Yawe mpe nakotondisama na esengo mingi kati na Nzambe, Mobikisi na ngai.


Kasi tango Bayuda bakomaki kotelemela Polo mpe kofinga ye, apupolaki bilamba na ye mpe alobaki : — Tika ete makila na bino etangama likolo ya mito na bino moko ! Ngai nazali lisusu na ngambo te. Kobanda lelo, nakokende na ngai epai ya bato ya bikolo ya bapaya.


Yango wana, nalobi na bino yango lelo ete nazali na ngambo ya makila ya moto moko te kati na bato nyonso,


Lokola bayebaki te ndenge nini Nzambe akomisaka bato sembo mpe balukaki komikomisa sembo na ndenge na bango moko, batosaki te lolenge oyo Nzambe akomisaka bato sembo.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ