Yango wana, Yawe alobaki : « Pema na Ngai ekowumela libela te kati na moto, pamba te abengami na kokufa ; mibu ya bomoi na ye ekozala kaka nkama moko na tuku mibale. »
Kasi Yawe asalelaki bango ngolu, ayokelaki bango mawa, mpe azongelaki bango, mpo na boyokani na Ye elongo na Abrayami, Izaki mpe Jakobi. Na tango wana, Yawe alingaki koboma bango te mpe aboyaki kobengana bango mosika ya miso na Ye.
Ezalaki mpo na kanda makasi ya Yawe nde makambo oyo nyonso esalemelaki Yelusalemi mpe Yuda, kino Yawe kobengana bango mosika ya elongi na Ye. Nzokande, Sedesiasi atombokelaki mokonzi ya Babiloni.
Nzambe, Yo nde ozali ndako na ngai, oyo batonga makasi ; mpo na nini osundoli ngai ? Mpo na nini nasengeli kotambola na pasi boye, na se ya minyoko ya monguna ?
Ezala ndenge nakomi sik’oyo mobange mpe suki na ngai ekomi pembe, oh Nzambe na ngai, kotika ngai te, mpo ete natatola makasi na Yo epai ya bato ya ekeke oyo, mpe misala ya nguya na Yo epai ya bato nyonso oyo bakoya sima.
Bongo soki bino bato oyo bozali kutu mabe boyebi kopesa na bana na bino biloko ya malamu, ndenge nini Tata oyo azali na Likolo apesa te Molimo Mosantu epai ya bato oyo basengaka Ye !
mpe na nzela ya Molimo Mosantu, amonisamaki na nguya nyonso ete azali Mwana na Nzambe, na nzela ya lisekwa na Ye kati na bakufi : Yesu-Klisto, Nkolo na biso.
Nzokande bino, botambolaka te kolanda baposa ya nzoto, kasi kolanda baposa ya Molimo, mpo ete Molimo ya Nzambe azali kati na bino. Mpe soki moto azangi Molimo ya Klisto azali mpe moto na Ye te.
Tango bakomaki pembeni ya etuka ya Leyi, bato ya Filisitia bayaki kokutana na ye na koganga. Molimo na Yawe akitelaki ye na nguya, mpe basinga oyo ekangaki maboko na ye ekatanaki lokola basinga ya lino oyo eziki na moto, mpe ekweyaki wuta na maboko na ye.
Dalila abelelaki Samison : « Samison, bato ya Filisitia bayei kobundisa yo ! » Samison alamukaki na pongi na ye mpe amilobelaki : « Nakosala ndenge kaka nasalaka liboso mpe nakokangolama na ngai. » Kasi ayebaki te ete Yawe alongwaki kati na ye.