Mikuwa na ngai nyonso ekoloba : « Oh Yawe, nani akoki kokangola, lokola Yo, mobola wuta na maboko ya moto oyo aleki ye na makasi, mobola mpe mokeleli wuta na maboko ya banyokoli na bango ? »
Boye, bakozala te lokola bakoko na bango, oyo bazalaki mito makasi mpe batomboki, oyo mitema na bango ezalaki sembo te na miso ya Nzambe, mpe milimo na bango ezangaki boyengebene epai na Ye.
Namoni bondumba na yo mpe posa na yo ya kosangisa nzoto ; ekobo na yo ezali na soni ata moke te. Namoni banzambe na yo ya bikeko na likolo ya bangomba mpe kati na bilanga. Mawa na yo Yelusalemi, ozali peto te ! Kino tango nini okozala mbindo ? »
Nakopesa bango motema ya sika mpe nakotia kati na bango molimo ya sika ; nakolongola kati na bango motema ya libanga mpe nakopesa bango motema ya mosuni,
Bomekolaka te bizaleli ya tango oyo, kasi bobongwana na nzela ya boyeisami sika ya mayele na bino, mpo ete bososolaka mokano ya Nzambe, oyo ezali malamu, esepelisaka Ye mpe ezali ya kokoka.
Yango wana, bandeko balingami, botelema ngwi mpe bomitika te ete baningisa bino. Bokendaka tango nyonso liboso kati na mosala ya Nkolo, wana boyebi malamu ete mosala na bino kati na Nkolo ezali ya pamba te.
Solo, tozali mbuma ya mosala ya Nzambe : Akelaki biso kati na Yesu-Klisto mpo ete tosala misala ya malamu oyo Nzambe abongisa wuta kala mpo ete tokokisa yango.
abikisaki biso. Asalaki bongo mpo na bosembo na biso te, kasi mpo na mawa na Ye na nzela ya Molimo Mosantu oyo akomisaki biso bato ya sika na mokolo ya mbotama na biso ya mibale.
Boye, wuta na tango yango, engumba Ebron ekomaki libula ya Kalebi, mwana mobali ya Yefune, moto ya Kenizi ; mpo ete alandaki Yawe, Nzambe ya Isalaele, na motema mobimba.