Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 50:5 - Mokanda na Bomoi

5 Alobi : « Bosangisela ngai bayengebene na ngai, ba-oyo basalaki Boyokani elongo na ngai na nzela ya mbeka. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 50:5
17 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Yawe, obimisaki ngai na mboka ya bakufi, obatelaki bomoi na ngai mosika na bato oyo bazali kokita na libulu.


Bino bato oyo bolingaka Yawe, boyina mabe ! Yawe abatelaka bomoi ya bayengebene na Ye mpe akangolaka bango na maboko ya bato mabe.


Pamba te abatelaka bayengebene mpe nzela ya bato oyo batosaka Ye.


Napesaki mitindo epai na bato oyo babulisama mpo na Ngai ; nabengisaki lisusu bilombe na Ngai, bato oyo basepelaka na lokumu na Ngai, mpo na kosilisa kanda na Ngai.


Bokokimela kati na lubwaku ya bangomba na ngai, pamba te lubwaku ya bangomba ekokende kino na Atsali ; bokokima ndenge bokimaki tango mabele eninganaki na tango Oziasi azalaki mokonzi ya Yuda. Bongo Yawe, Nzambe na ngai, akoya elongo na basantu na Ye nyonso.


Mpe na lokito monene ya kelelo, akotinda ba-anjelu na Ye kosangisa baponami na Ye longwa na bangambo nyonso minei ya mokili : longwa na suka moko ya Likolo kino na suka mosusu.


ezali makila na Ngai ya Boyokani, makila oyo esopani mpo na bato ebele, mpo ete masumu na bango elimbisama.


Tika ete alendisa mitema na bino mpo ete bozanga pamela kati na bosantu liboso ya Nzambe mpe Tata na biso, na mokolo oyo Yesu, Nkolo na biso, akoya elongo na basantu na Ye nyonso ! Amen !


Bandeko, mpo na oyo etali boyei ya Yesu-Klisto, Nkolo na biso, mpe bosangani na biso epai na Ye, tozali kosenga na bino boye :


pene ya Yesu, Moyokanisi ya Boyokani ya sika ; mpe pene ya makila na Ye, oyo esopanaki mpe egangaka koleka makila ya Abele.


Tika ete Nzambe ya kimia, Ye oyo asekwisaki kati na bakufi Mobateli monene ya bameme, Yesu, Nkolo na biso, na nzela ya makila ya Boyokani ya seko,


Ezala Enoki, mokitani ya sambo wuta Adamu, asakolaki na tina na bango : « Tala, Nkolo azali koya elongo na basantu na Ye, bankoto na bankoto,


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ