Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 50:3 - Mokanda na Bomoi

3 Tika ete Nzambe na biso aya ! Tika ete akanga monoko te ! Liboso na Ye, moto makasi ezali kozikisa ; mpe zingazinga na Ye, mopepe makasi ezali kopepa.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 50:3
28 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Botala lopango na yango, botala malamu bandako na yango mpo ete bopesa sango epai ya bato oyo bakoya na sima.


Yango nde makambo oyo ozalaki kosala ; mpe ngai nabatelaki kimia. Okanisi penza ete ngai nazali lokola yo ? Nakopamela yo mpe nakotanda makambo nyonso oyo nazwa yo na miso na yo.


Tika ete Nkolo akumisama, mokolo na mokolo ! Nzambe Mobikisi na biso alataka makambo na biso.


liboso ya Yawe, pamba te azali koya ! Solo, azali koya kosambisa mabele ; akosambisa mokili na bosembo, mpe bikolo kolanda boyengebene na Ye.


Milinga ezipaki ngomba Sinai mpo ete Yawe akitaki na likolo na yango na lolenge ya moto, bongo milinga yango ezalaki komata lokola milinga oyo ebimaka na fulu ya moto. Mpe ngomba nyonso eninganaki makasi.


Loba na bato oyo bazali kobanga : « Bozala makasi, bobanga te, Nzambe na bino akoya, akoya kozongisa mabe na mabe, akoya na lifuti ya Nzambe. Ye moko akoya kobikisa bino. »


Tango natalaki, namonaki mopepe moko ya makasi kowuta na ngambo ya nor ; bongo mopepe yango ezalaki komema mapata minene nzela moko na mikalikali ya kongenga makasi, mpe kati na yango ezalaki kongenga lokola ebende kati na moto.


Ebale ya moto ezalaki kobima mpe kotambola liboso na Ye. Minkoko ya bato bazalaki kosalela Ye, minkoko ya minkoko ya bato batelemaki liboso na Ye. Basambisi bavandaki, mpe babuku efungwamaki.


Boye moto ebimaki longwa liboso ya Yawe mpe etumbaki bango nyonso ; bakufaki na mbala moko.


Bokono oyo ebomaka ezalaki kotambola liboso na Ye, mpe pasi makasi ezalaki kolanda matambe na Ye na sima.


Moto ewutaki epai na Yawe mpe etumbaki bato nkama mibale na tuku mitano oyo bazalaki kobonza malasi ya ansa.


Asimbi kiyungulu na loboko na Ye, akopetola etando na Ye mpo na koyamba ble kati na ebombelo na Ye ; kasi akotumba kati na moto oyo ekufaka te, matiti oyo ekotikala. »


Kasi lelo, yeba malamu ete Yawe, Nzambe na yo, azali Ye moko kotambola liboso na yo lokola moto oyo ezikisaka ; akobebisa bango mpe akobuka bango liboso na yo ; bongo yo okokamata mabele na bango mpe okosilisa bango noki-noki, ndenge Yawe alakaki yo.


Pamba te Nzambe na biso azali moto oyo ezikisaka.


ndenge nini biso tozanga kozwa etumbu soki tozwi na pamba lobiko ya boye ? Solo, Ye moko Nkolo nde asakolaki liboso na tina na lobiko yango ; bongo na sima, bato oyo bayokaki sango yango batalisaki biso bosolo na yango.


Motatoli ya makambo oyo alobi : — Iyo, nazali koya kala mingi te. Amen : Nkolo Yesu, yaka !


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ