Ozali mpe kobosana Yawe, Mokeli na Yo, oyo atandaki likolo ndenge batandaka liputa mpe atongaki miboko ya mabele, mpo ete okoma kobika mikolo nyonso na kobanga liboso ya kanda ya banyokoli oyo babongisami mpo na kobebisama ? Pamba te, wapi kanda ya banyokoli ?
Boni, elenge mwasi abosanaka penza biloko na ye ya monzele ? Boni, mobandami ya libala abosanaka solo mayaka na ye ? Nzokande, bato na Ngai babosani Ngai mikolo ebele.
Nakolanda bino lokola ngombolo oyo ebungisi bana na yango mpe nakopasola misuni ya mitema na bino. Nakolia bino wana, lokola nkosi ya mwasi, bongo banyama ya zamba ekoya kopanza bino biteni-biteni.
Bato na Ngai bakobebisama mpo ete bazangi boyebi. Lokola bobwaki boyebi, Ngai mpe nakobwaka bino mpe nakolongola bino na bonganga-Nzambe na Ngai. Lokola bobosani Mobeko ya Nzambe na bino, Ngai mpe nakobosana bana na bino.
Bongo akomaki kokanisa na tina na bomoi na ye, alobaki : « Basali boni tata na ngai azwa na mosala mpe bazali kolia ndenge balingi, mpe biloko ya kolia eleki kutu ebele ; kasi ngai nazali kokufa awa na nzala !