Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 50:21 - Mokanda na Bomoi

21 Yango nde makambo oyo ozalaki kosala ; mpe ngai nabatelaki kimia. Okanisi penza ete ngai nazali lokola yo ? Nakopamela yo mpe nakotanda makambo nyonso oyo nazwa yo na miso na yo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 50:21
22 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Boni, Nzambe akoki kopesa yo etumbu ? Nayebi ete ondimi na yo te. Yo nde osengeli kozwa mokano, kasi ngai te ! Yebisa ngai makambo oyo yo oyebi.


Tika ete Nzambe na biso aya ! Tika ete akanga monoko te ! Liboso na Ye, moto makasi ezali kozikisa ; mpe zingazinga na Ye, mopepe makasi ezali kopepa.


Nakopamela yo te na tina na bambeka na yo, pamba te bambeka na yo ya kotumba ezalaka tango nyonso liboso na ngai.


Balobaka : « Nzambe akoyeba ndenge nini ? Ye-Oyo-Aleki-Likolo azali ata na boyebi ? »


Otiaka masumu na biso liboso na Yo mpe obimisaka na polele makambo oyo tobombaka.


Nzambe alobaki na Moyize : — Ngai nazali oyo akosala. Tala makambo oyo okoloba na bana ya Isalaele : « Nazali atindi ngai epai na bino. »


Moto oyo atiaka moto makasi soki bapameli ye, akokweyisama na pwasa mpe akobika te.


Pamba te, Nzambe akomema misala nyonso na kosambisama, ezala oyo ebombama, ya malamu to ya mabe.


Soki basaleli moto mabe ngolu, akoyekola bosembo te ; ezala kati na mokili ya bosembo, asalaka kaka mabe mpe amonaka na ye monene ya Yawe te.


Wuta kala, navandaki nye, nakangaki monoko mpe motema na ngai ; kasi sik’oyo, lokola mwasi oyo azali na pasi ya kobota, nazali koganga, nazali kolela mpe kopema na pasi.


Ozalaki na somo ya nani to ozalaki kobanga nani mpo ete okosa Ngai to obosana Ngai, to mpe obimisa Ngai na motema na yo ? Boni, ezali te mpo ete navandaki kimia tango molayi nde ozali kobanga Ngai te ?


« Ndenge nini okoki penza koloba : ‹ Namikomisi na ngai mbindo te, nazali kolanda banzambe ya Bala te ? › Tala nanu ndenge ozalaki kotambola kati na lubwaku mpe kanisa malamu makambo oyo ozalaki kosala. Okomaki lokola shamo ya mwasi oyo eyengaka-yengaka bisika nyonso ;


Mpo na lolendo ya Jakobi, Yawe alapi ndayi na maloba oyo : « Nakobosana misala na bango ata moko te.


Nzambe azali moto te mpo ete akosa, azali mpe mwana ya moto te mpo ete akoka kobongola makanisi na Ye. Boni, akoki solo koloba mpe kosala eloko moko te ? Akoki solo kopesa elaka mpe kokokisa yango te ?


Yango wana, bosambisaka te liboso ya tango oyo ekatama ; bozela kino tango Nkolo akoya. Akobimisa na pole makambo oyo ebombama kati na molili, mpe akomonisa na miso ya bato makanisi ya mitema ya bato. Na tango wana, moto na moto akozwa lokumu na ye kowuta na Nzambe.


Bato ebele bakanisaka ete Nkolo azali kowumela mpo na kokokisa elaka na Ye ; nzokande azali nde kokanga motema mpo na bino, pamba te alingi ete moko te abunga, kasi alingi ete bato nyonso babongola mitema.


Napamelaka bato oyo nalingaka mpe napesaka bango etumbu. Boye, zala na molende mpe bongola motema na yo.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ