Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 50:16 - Mokanda na Bomoi

16 Nzambe alobi na moto mabe : « Mpo na nini opanzaka sango ya mibeko na ngai mpe olobaka na tina na Boyokani na ngai ?

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 50:16
20 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Yawe ayebisaka mabongisi na Ye epai ya bato oyo batosaka Ye, alakisaka bango mabombami ya boyokani na Ye.


Ndenge makolo ya ebosono ezalaka makasi te, ndenge wana mpe masese ezalaka na nguya te kati na monoko ya zoba.


Nkolo alobi : « Bato oyo bapusanaka pene na Ngai kaka na monoko, bapesaka Ngai lokumu kaka na bibebu, kasi mitema na bango ezalaka mosika na Ngai ; mpe botosi oyo bazalaka na yango epai na Ngai ezali kaka mobeko ya bomoto, oyo bateyaki bango.


Kasi Yawe alobaki : « Kimia ezali te mpo na bato mabe. »


Kasi soki moto mabe atiki mabe na ye oyo azalaki kosala mpe akomi kosala makambo ya sembo mpe ya alima, abikisi solo bomoi na ye.


Nzambe azali Molimo ; esengeli ete bato oyo bagumbamelaka Ye bagumbamela Ye kati na Molimo mpe kati na solo.


Kasi nakonzaka nzoto na ngai, nakomisaka yango lokola mowumbu, pamba te nabangaka kozanga mbano sima na ngai koteya bato mosusu.


ekozala ndenge moko te na boyokani oyo nasalaki elongo na batata na bango tango nasimbaki bango na loboko mpo na kobimisa bango na Ejipito, pamba te lokola bakataki boyokani na Ngai, Ngai mpe napesaki bango mokongo, elobi Nkolo.


Sima na bango kotika nzela ya solo, bapengwaki mbala moko na kolanda nzela ya Balami, mwana mobali ya Beori, oyo alingaki lifuti ya mabe ;


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ