12 Soki nazalaki na nzala, nalingaki koyebisa yo te, pamba te mokili mpe nyonso oyo ezali kati na yango ezali ya ngai.
Bimisa mpe bikelamu oyo ezali elongo na yo : bandeke, banyama mpe bikelamu nyonso oyo etambolaka na libumu, mpo ete ebotana mpe ekoma ebele kati na mokili. »
Moto makasi mpe moto mike-mike ebimaka na monoko na yango.
Oh Yawe, misala na Yo ezali ebele ! Osalaki nyonso na bwanya ; mokili etondi na biloko oyo okela.
Soki botosi Ngai penza mpe bobateli boyokani na Ngai, bokozala mpo na Ngai ekolo ya motuya kati na bikolo nyonso. Atako mokili mobimba ezali ya Ngai,
Yawe, Nzambe na yo, nde azali Nkolo ya likolo, ya likolo koleka likolo, ya mabele mpe ya nyonso oyo ezali kati na yango.