Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 50:1 - Mokanda na Bomoi

1 Nzambe ya banzambe, Yawe alobi, abengi mokili wuta na epai moyi ebimaka kino na epai elalaka.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 50:1
35 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tango Abrami akokisaki mibu tuku libwa na libwa ya mbotama, Yawe abimelaki ye mpe alobaki na ye : « Nazali Nzambe-Na-Nguya-Nyonso. Tambola liboso na Ngai mpe zala moto azanga pamela.


Eliya apusanaki pene na bato mpe alobaki : — Kino tango nini bokotambola lokolo moko na zamba mpe lokolo mosusu na nzela ? Soki Yawe azali Nzambe, tika ete bolanda Ye ! Kasi soki mpe Bala, bolanda ye. Bato bazongisaki ata eloko moko te.


Balevi baponaki Emani, mwana mobali ya Joeli ; Azafi, mwana mobali ya Berekia, kati na bandeko na ye ya mibali ; Etani, mwana mobali ya Kushaya, kati na bana ya Merari, na bandeko na ye ya mibali.


Davidi apesaki mokumba, epai ya Azafi mpe bandeko na ye, ya kosala mosala liboso ya Sanduku ya Boyokani ya Yawe kolanda bikateli ya mokolo na mokolo.


Mpo na bana mibali ya Azafi : Zakuri, Jozefi, Netania mpe Asareyela. Bana mibali ya Azafi bazalaki na bokambami ya tata na bango Azafi oyo azalaki kosakola na bokambami ya mokonzi.


Bango nyonso bazalaki na bokambami ya tata na bango mpo na kobeta miziki na Tempelo ya Yawe mpe kobeta manzanza, mandanda mpe banzenze ; mpe mpo na kosala mosala kati na Ndako ya Nzambe. Azafi, Yedutuni mpe Emani bazalaki na bokambami ya mokonzi.


Na ngambo ya loboko ya mobali ya Emani, Azafi nde azalaki kotelema wana mpe azalaki libota moko na Emani. Azafi, mwana mobali ya Berekia, mwana mobali ya Shimea,


Mokonzi Ezekiasi elongo na bakambi na ye bapesaki mitindo na Balevi ete bakumisa Yawe na banzembo ya Davidi mpe ya mosakoli Azafi. Boye, bayembaki banzembo ya kokumisa na esengo, bagumbaki mito na bango mpe bagumbamaki kino na se.


Sik’oyo, Oh Nzambe na biso, Nzambe Monene, Nzambe na nguya mpe ya somo, Yo oyo obatelaka boyokani mpe bolingo na Yo, komona te lokola likambo ya pamba na miso na Yo pasi oyo ekomeli biso, bakonzi na biso, bakambi na biso, Banganga-Nzambe na biso, basakoli na biso, batata na biso mpe bato na Yo nyonso, wuta na tango ya bakonzi ya Asiri kino na mokolo ya lelo.


Ezali Yo, bobele Yo, nde ozali Yawe ! Okela Likolo, Likolo oyo eleki Likolo mpe mampinga nyonso ya Likolo ; okela lisusu mabele mpe nyonso oyo ezali kati na yango, bibale minene mpe nyonso oyo ezali kati na yango ; opesaka bomoi na bikelamu nyonso, mpe mampinga ya Likolo egumbamaka liboso na Yo.


Longwa na este kino na weste, tika ete Kombo ya Yawe epambolama !


Nzembo ya Azafi. Solo, Nzambe azali malamu mpo na Isalaele, mpo na bato oyo bazali mitema peto.


Nzembo ya Azafi. Oh Nzambe, mpo na nini kosundola biso mpo na tango nyonso ? Mpo na nini kongalisa kanda na Yo likolo ya etonga oyo oleisaka ?


Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya koyemba lokola « Koboma te ! » Nzembo ya Azafi.


Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Ezali ya koyemba na lindanda. Nzembo ya Azafi.


Wuta na buku ya mokambi ya bayembi, kolanda Yedutuni. Nzembo ya Azafi.


Nzembo ya Azafi. Bino, bato na ngai, boyoka malako na ngai ! Bopesa matoyi na maloba ya monoko na ngai !


Nzembo ya Azafi. Oh Nzambe, tala ndenge bato ya bikolo ya bapaya bakoti na makasi kati na libula na Yo, bakomisi Esika na Yo ya bule mbindo, mpe bakomisi Yelusalemi mipiku ya mabanga !


Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Ezali ya koyemba lokola « Lisi ya Mobeko. » Litatoli. Nzembo ya Azafi.


Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Azafi. Ezali ya koyemba na lindanda ya bato ya Gati.


Nzembo ya Azafi. Nzambe atelemi kati na lisanga na Ye, azali kokata makambo kati na banzambe.


Oh Lola, yoka ! Mabele, pesa matoyi mpo na koyoka ! Pamba te Yawe nde azali koloba : « Nabokoli bana mpe nakolisi bango, kasi batombokeli Ngai.


Sik’oyo, oh Yawe, Nzambe na biso, bikisa biso na maboko na ye, mpo ete mikili nyonso ya mabele eyeba solo ete Yo moko kaka, Yawe, nde ozali Nzambe. »


pamba te Mokeli na yo nde mobali na yo, Kombo na Ye : Yawe, Mokonzi ya mampinga ; Mosantu ya Isalaele azali Mosikoli na yo ; babengaka Ye : Nzambe ya mokili mobimba.


Bokonzi na ye ekokende mosika penza, mpe kimia na ye ekozala na suka te. Akovanda na kiti ya bokonzi ya Davidi, akozala mokonzi ya mokili na ye, akolendisa mpe akokamba yango na bosembo mpe na boyengebene, wuta na tango oyo kino libela na libela. Yango nde makambo oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, akosala na bolingo makasi na Ye.


Eh Yawe, moko te akokani na Yo ! Ozali monene, mpe Kombo na Yo ezali na nguya monene.


Nkosi egangi ; nani akobanga te ? Nkolo Yawe alobi ; nani akoki koboya kosakola ?


Kombo na Ngai ekozala monene kati na bikolo, longwa na ebimelo kino na elalelo ya moyi ; bakobonza na bisika nyonso malasi ya ansa lokola mbeka mpo na Kombo na Ngai mpe makabo ya peto, pamba te Kombo na Ngai ekozala monene kati na bikolo, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.


Bikolo nyonso ya mokili ekosangana liboso na Ye. Bongo akokabola bango na masanga mibale ndenge mobateli bibwele akabolaka bameme mpe bantaba :


— Nzambe ya banzambe ! Yawe ! Nzambe ya banzambe ! Yawe ! Ayebi nyonso ! Tika ete Isalaele ayeba mpe yango ! Soki tosali yango mpo na kotombokela Yawe to mpo na kosala lisumu na miso na Ye, tika ete abikisa biso te na mokolo ya lelo !


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ