Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 5:12 - Mokanda na Bomoi

12 Kasi tika ete bato nyonso oyo bazwaka Yo lokola ebombamelo na bango bazalaka na esengo tango nyonso, tika ete bayembaka mpo na esengo, bomoi na bango mobimba. Batela bango mpo ete bato oyo balingaka Kombo na Yo basepelaka kati na Yo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 5:12
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bokumisa Yawe ! Esengo na moto oyo atosaka Yawe mpe asepelaka makasi na mibeko na Ye.


Akopambola bato oyo batosaka Yawe kobanda na bato pamba kino na bato minene.


Koganga ya esengo mpe ya elonga eyokanaka wuta na bandako ya kapo ya bato ya sembo, pamba te nguya na Yawe esalaka makambo minene !


Baluka epai na ngai mpe talisa ngai ngolu na Yo kolanda ndenge okata mpo na bato oyo balingaka Kombo na Yo.


Yawe apesaka bato na Ye makasi ; Yawe apambolaka bato na Ye na nzela ya kimia.


Ebele bazali koloba na tina na ngai : « Nzambe akobikisa ye te ! »


Yawe, telema ! Nzambe na ngai, kangola ngai ! Beta banguna na ngai nyonso bambata, buka bato mabe minu.


Bato mabe bazali na pasi mingi, kasi bolamu ya Yawe ezingelaka bato oyo batiaka elikya na Yawe.


Ozali ebombamelo na ngai ; obatelaka ngai mpo ete pasi ekanga ngai te mpe ozingelaka ngai na banzembo ya kokangolama.


Liboso ya Nzambe, bato ya sembo basepelaka, batondaka na esengo.


Lokola kovanda mokolo moko kati na lopango na Yo eleki kovanda mikolo nkoto moko na esika mosusu, naponaki kotelema na ekotelo ya Ndako ya Nzambe na ngai na esika ete navanda kati na bandako ya kapo ya bato mabe.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ