Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 5:11 - Mokanda na Bomoi

11 Oh Nzambe, katela bango etumbu. Tika ete mabongisi na bango ebotela bango libebi. Bengana bango mpo na ebele ya masumu na bango, pamba te batombokeli nde Yo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 5:11
18 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

tango minzoto ya tongo ezalaki koyemba elongo mpe tango bana na Nzambe bazalaki koganga na esengo ?


Bopesa Mwana na Ye beze, noki te akosilika mpe bokokufa na nzela na bino, pamba te kanda na Ye epelaka noki. Esengo na bato oyo bazwaka Ye lokola ebombamelo na bango.


Tika ete bato oyo basepelaka na bosembo na ngai baganga na esengo mpe basepela ; tika ete balobaka tango nyonso : « Tika ete Yawe anetolama, Ye oyo asepelaka na kimia ya mowumbu na Ye ! »


Tika ete ba-oyo balobaka na ngai : « Ah ! Ah ! » bayoka somo mpe bakufa soni !


Liboso ete banzungu na bino ekutana na moto ya basende, ezala ya mayi to ya kokawuka, bato mabe akolimwa.


Bilanga ya esobe etondaka na bilei, mpe bangomba mike etondaka na esengo.


Liboso ya Nzambe, bato mabe bakufaka, ndenge milinga elimwaka, mpe mafuta enyangwamaka na moto.


Pamba te Nzambe akobikisa Siona mpe akotonga lisusu bingumba ya Yuda. Bato bakovanda kuna mpe bakozwa yango lokola libula na bango.


Siona, mboka kitoko, sepela, sepela penza makasi ! Yelusalemi, mboka kitoko, ganga penza na esengo ! Tala, mokonzi na yo azali koya epai na yo, azali sembo mpe molongi, atonda na komikitisa, avandi na likolo ya ane, na likolo ya mwana ya ane, mwana ya ane ya mwasi.


Mpe toyebi malamu ete kati na makambo nyonso, Nzambe asalaka mpo na bolamu ya bato oyo balingaka Ye, ba-oyo babengama kolanda mabongisi na Ye.


Kasi, kolanda ndenge ekomama : « Oyo liso etikala nanu komona te, oyo litoyi etikala nanu koyoka te, mpe oyo moto atikala nanu kokanisa te kati na motema na ye, yango nde Nzambe abongisi mpo na bato oyo balingaka Ye. »


Esengo na moto oyo akangaka motema na tango ya komekama ! Pamba te sima na ye kolonga komekama, akozwa motole ya bomoi, oyo Nzambe alakaki na bato oyo balingaka Ye.


Bandeko na ngai ya bolingo, boyoka : Nzambe apona te bato oyo mokili ezali kobenga babola mpo ete bazala bato ya bomengo kati na kondima mpe bazwa Bokonzi oyo alaka epai ya bato oyo balingaka Ye ?


Likolo, sepela na libebi na yango ! Bino mpe basantu, bosepela ! Bino bantoma mpe basakoli, bosepela mpe lokola ! Pamba te Nzambe alongisi bino awa akateli yango etumbu. »


Yawe, tika ete banguna na Yo nyonso bakufa bongo ! Tika ete bato oyo balingaka Yo bangenga makasi lokola moyi ya midi ! Mokili ezalaki na kimia mibu tuku minei.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ