Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 5:1 - Mokanda na Bomoi

1 Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi ; ezali ya koyemba na flite.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 5:1
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Libondeli ya Davidi. Oh Yawe, yoka ngai ! Kolela na ngai ezali sembo ! Yoka koganga na ngai ! Landa malamu libondeli na ngai, oyo ezali kobimela te na bibebu ya lokuta.


Batela lisusu mosali na Yo mpo ete nasala mabe na nko te. Na bongo, nakozala moto ya kokoka mpe nakosala bambeba minene te.


Eyembamaki na lindanda tango bato ya Zifi bayaki koyebisa Saulo : « Davidi abombami kati na biso. »


Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi.


Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Ezali ya koyemba lokola « Lisi ya Mobeko. » Litatoli. Nzembo ya Azafi.


Libondeli ya Davidi. Yawe, yoka mpe yanola ngai ; pamba te nazali mobola mpe moto akelela.


Ndenge moko mpe Molimo ayaka kosunga biso kati na bolembu na biso ; pamba te toyebi te kosambela na lolenge oyo esengeli, kasi Molimo Ye moko abondelaka mpo na biso na maloba oyo moto akoki koloba te.


pamba te miso ya Nkolo etalaka bato ya sembo, mpe matoyi na Ye eyokaka losambo na bango. Kasi Nkolo apesaka bato mabe mokongo.


Mpe wana Ana azalaki kobondela na se ya motema, bibebu na ye ezalaki koningana, kasi mongongo ezalaki koyokana te. Mpe Eli akanisaki ete Ana alangwe masanga.


Kozwa mwasi mowumbu na yo te lokola mwasi ya mobulu, pamba te ezali mawa ya motema na ngai mpe monene ya pasi na ngai nde etindi ngai kobondela kino tango oyo.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ