Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 49:6 - Mokanda na Bomoi

6 Mpo na nini nabanga na tango ya pasi, tango mabe ya bakosi ezingeli ngai,

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 49:6
17 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Amani abetelaki bango lisolo ya bomengo na ye oyo ezalaki penza ebele, motango ya bana na ye mpe makambo nyonso oyo mokonzi azalaki kosala mpo na kopesa ye lokumu mpe ndenge nini atombolaki ye likolo ya bakambi mpe bakalaka mosusu.


Abangaka basango ya mabe te ; motema na ye ezali na kimia, atiaka elikya na ye kati na Yawe.


Motema na ye eninganaka te, abangaka te kino akomona banguna na ye kozwa etumbu.


Solo, Ye moko Nzambe akobebisa yo mpo na libela, akokanga yo kati na ndako na yo, akobwaka yo libanda mpe akopikola yo na mokili ya bato ya bomoi.


Epai ya Nzambe, nakumisaka Liloba na Ye ; Epai ya Nzambe, natiaka motema mpe nabangaka te. Moto oyo akokufa akoki kosala ngai nini ?


Basalaka makita, babombamaka, balandaka ngai mpo na kosala ngai mabe.


Solo, bato bazali lokola molunge, bazali lokola lokuta ; Soki batie bango na emekelo kilo, ata molunge ekoleka bango nyonso na kilo.


Bomengo ya mozwi ezali engumba na ye, oyo batonga makasi, kasi bobola ya bato bakelela ezali libebi na bango.


Moto oyo atiaka elikya na bomengo na ye akokweya, kasi bayengebene bakozala kitoko lokola makasa ya sika.


Tango okobwaka miso na ngambo ya bomengo, ekobunga, pamba te ezalaka na mapapu mpe epumbwaka na likolo makasi lokola mpongo.


Kasi tika ete moto oyo alingi komikumisa amikumisa mpo ete azali na bososoli mpe ayebi Ngai, mpo ete ayebi ete nazali Yawe oyo atalisaka bolamu, bosembo mpe boyengebene na mokili ; pamba te nasepelaka nde na makambo wana, » elobi Yawe.


Bato ya Kanana basalelaka emekelo kilo ya lokuta, balingaka kaka kokosa.


Bayekoli bakamwaki mingi mpo na maloba na Ye. Kasi Yesu alobaki na bango lisusu : — Solo, bana na Ngai, ezali pasi mpo na kokota kati na Bokonzi ya Nzambe !


Sima na yango, nakomilobela : ‹ Oh bomoi na ngai, otondi na biloko oyo ebombami mpo na mibu ebele ; pema na yo, lia, mela mpe sepela ! › »


Pesa mitindo epai ya bazwi kati na mokili oyo ete bazala na lolendo te mpe batia elikya te na bomengo, pamba te bomengo ekoki kosila ; kasi tika ete batia elikya na bango kati na Nzambe oyo apesaka biso biloko nyonso, na bofuluki, mpo ete tosepela na yango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ