Nasololaka na ye elongi na elongi, na polele penza kasi na masese te. Amonaka lolenge ya Yawe. Mpo na nini bozali na somo te ya kotonga Moyize, mosali na Ngai ?
Ezalaki ndenge wana nde maloba ya mosakoli ekokisamaki : « Nakofungola monoko mpo na koyebisa bango makambo na masese, nakosakola makambo oyo ebombama wuta na ebandeli ya mokili. »
Nyonso oyo bokoloba kati na molili ekoyokana kati na pole ya mokolo, mpe nyonso oyo bokolobana na matoyi kati na bashambre ekosakolama wuta na likolo ya bandako.