3 bato pamba mpe bato minene, bazwi mpe babola :
Maloba na ngai ewuti na motema ya sembo, bibebu na ngai ezali penza koloba makambo oyo ngai nayebi.
Soki te, vanda kimia mpe yoka ngai, mpe ngai nakoteya yo bwanya. »
Tika ete maloba na ngai esepelisa Ye ! Tika ete Yawe azala esengo na ngai !
Emoniseli ya liloba na Yo engengisaka, epesaka bazoba mayele.
Batela lisusu mosali na Yo mpo ete nasala mabe na nko te. Na bongo, nakozala moto ya kokoka mpe nakosala bambeba minene te.
Monoko ya moto ya sembo ebimisaka bwanya, mpe lolemo na ye elobaka kolanda bosembo.
Bino bato, kino tango nini bokoyokisa nkembo na ngai soni ? Kino tango nini bokomisepelisa na makambo ya pamba mpe bokolanda makambo ya lokuta ?
Nzembo ya bolingo oyo bana ya Kore bayembaki. Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Eyembamaki na lindanda oyo babengaka Lisi.
Pesa matoyi mpe yoka toli ya bato ya bwanya, mpe tika ete motema na yo endima mateya na ngai.
moto malamu alobaka makambo ya malamu kowuta na motema malamu na ye, mpe moto mabe alobaka makambo ya mabe kowuta na motema mabe na ye.
Tika ete mateya na ngai ekweya lokola mvula, mpe maloba na ngai ekita lokola londende, lokola mvula moke na likolo ya matiti, lokola mvula makasi na likolo ya milona !