19 Atako, wana azalaki na bomoi, azalaki komimona moto apambolama— atako bato bakokumisa yo, pamba te omisali bolamu—
Bongo yo, okokufa na kimia mpe okokundama sima na kimobange ya esengo.
Baesha akendeki kokutana na bakoko na ye, mpe bakundaki ye na Tiritsa ; mpe Ela, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi.
mpo na kolongola molimo na ye na libulu ya kufa, mpo ete pole ya bomoi ekoka kongenga likolo na ye.
Epai na Yo Nzambe, nakokokisa bandayi na ngai mpe nakobonza bambeka ya matondi.
liboso ete putulu ezonga na mabele epai wapi ewutaki, mpe pema ezonga epai ya Nzambe oyo apesaki yango.
Nani ayebi soki molimo ya moto emataka na likolo, mpe soki molimo ya nyama ekitaka na se ya mabele ? »
Bongo mokonzi alobaki na basali na ye : « Bokanga ye makolo mpe maboko, bobwaka ye kati na molili ya libanda, epai wapi kolela mpe koswa minu ezali. »
Kasi bato oyo basengelaki kokitana na bokonzi bakobwakama kati na molili ya libanda epai wapi bakolela mpe bakoswa minu.
Kasi Nzambe alobaki na ye : « Zoba ! Na butu ya lelo kaka, okokufa. Bongo nani akokoma nkolo biloko nyonso oyo ondukaki mpo na yo moko ? »
Babimisaka misala na bango ya soni ndenge ebale monene ebimisaka mbonge mpe fulufulu soki etomboki makasi ; bazali lokola minzoto oyo eyengaka-yengaka. Nzambe abombeli bango etumbu ya molili makasi mpo na libela.