Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 49:17 - Mokanda na Bomoi

17 Komitungisaka te soki moto moko akomi kofuluka na bozwi, soki kongenga ya ndako na ye ekomi komata se komata.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 49:17
10 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Alobaki : « Nabimaki bolumbu, na libumu ya mama na ngai, mpe nakozonga bolumbu. Yawe apesaki, mpe Yawe asili kozwa ; tika ete Kombo na Ye ekumisama ! »


Akokufa na bozwi, kasi akosala na yango eloko moko te ; tango akofungola miso, bozwi na ye nyonso ekozala lisusu te.


Yawe, na nzela ya nguya na Yo, kangola ngai wuta na maboko ya bato wana, kangola ngai wuta na maboko ya bato ya mokili oyo. Tika ete kufa ezala litomba na bango ! Tika ete, bango mpe bana na bango, balia na lokoso, mpe mabumu na bango etonda na bikolo oyo obombaka mpo na bango ; bongo babomba ndambo oyo ekotikala mpo na bakitani na bango !


Oyo mpe ezali lisusu pasi oyo epesaka mawa : ndenge moto ayaki, ndenge mpe akozonga. Bongo litomba na ye ezali nini ? Asali kaka mpo na mopepe ?


Bokosala nini na mokolo ya kosambisama, tango pasi ekowuta mosika ? Bokokimela epai ya nani mpo ete asunga bino ? Esika nini bokobomba bomengo na bino ?


Boye, mboka ya bakufi ekoyoka nzala makasi mpe ekofungola monoko na yango makasi ; bato ya lokumu elongo na bato pamba ya engumba bakokita kuna nzela moko mpe na loyenge na bango.


Kasi Nzambe alobaki na ye : « Zoba ! Na butu ya lelo kaka, okokufa. Bongo nani akokoma nkolo biloko nyonso oyo ondukaki mpo na yo moko ? »


Mozwi akomaki koganga : « Tata Abrayami, yokela ngai mawa ! Tinda Lazare ete atia songe ya mosapi na ye kati na mayi mpo ete atangisela ngai mayi na lolemo, pamba te nazali koyoka pasi makasi kati na moto oyo. »


ekundami nzoto ya soni, kasi ekosekwa nzoto ya lokumu ; ekundami nzoto ya bolembu, kasi ekosekwa nzoto ya nguya ;


Pamba te, toyaki maboko pamba kati na mokili, mpe tokozonga maboko pamba.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ