14 Yango nde suka ya bato oyo batiaka elikya kati na bango moko, ya bato oyo balandaka bango mpe basepelaka na maloba na bango.
bazali kolekisa mikolo na bango na bomengo, mpe bazali kokende na mboka ya bakufi na kimia.
Nzokande, bango mibale bakolala ndenge moko na se ya mabele, mpe bankusu ekozipa bango.
Nayebi ete ozali komema ngai na kufa, na esika oyo obongisa mpo na bato ya bomoi.
basinga oyo esimbaka bandako na bango ya kapo epikolamaka na mbalakata, mpe bakufaka ndenge wana bazanga bwanya. ›
Boyemba banzembo mpo na lokumu ya Yawe, bino babulami na Ye ; bokumisa Kombo na Ye ya bule.
Kobeta ngai lisusu te, nazali kokoka lisusu te.
Otiki biso kokima liboso ya banguna na biso ; mpe bayini na biso bazwi biloko na biso na makasi.
Tala ndenge nini Yawe, Ye-Oyo-Aleki-Likolo, azali somo ! Azali Mokonzi Monene na mokili mobimba.
Yawe amilakisi na nzela ya misala na Ye ya bosembo ; bato mabe bakangami na mitambo oyo bango moko basalaki.
liboso ete putulu ezonga na mabele epai wapi ewutaki, mpe pema ezonga epai ya Nzambe oyo apesaki yango.
Nzokande, oh Yawe, oyebi ngai, omonaka ngai mpe oyebi makanisi ya motema na ngai mpo na Yo. Tindika bango lokola bameme oyo babongisi mpo na koboma ! Bongisa bango mpo na mokolo ya kufa.
kasi basantu ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo bakozwa bokonzi mpe bakobatela yango mpo na libela, seko na seko.
kino tango Mpaka oyo azala liboso ya tango ayaki kobundela basantu ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo, mpe kino tango ya kozwa bokonzi ekokoka mpo na bango.
Toyeba Yawe, toluka penza koyeba Ye ; ndenge tongo etanaka solo, ndenge wana mpe akomonana : akoya epai na biso lokola mvula, lokola mvula oyo enokaka na pwasa mpe epolisaka mabele.
mpo ete bokoka kolia mpe komela na mesa na Ngai kati na Bokonzi na Ngai, mpe ete bokoka kovanda na bakiti ya bokonzi mpo na koyangela mabota zomi na mibale ya Isalaele.
Kolanda ndenge ekomama : « Ezali mpo na Yo nde balukaka koboma biso mikolo nyonso ; bazwaka biso lokola bameme ya koboma. »
Boyebi te ete basantu bakosambisa mokili ? Bongo soki bosengeli kosambisa mokili, bozangi penza makoki ya kokata mwa makambo ya mike-mike ?