Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 49:11 - Mokanda na Bomoi

11 Solo, tomonaka bato ya bwanya kokufa elongo na zoba mpe moto oyo azangi mayele, mpe batikaka bomengo na bango epai ya bato mosusu.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 49:11
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kayina asangisaki nzoto na mwasi na ye ; mpe mwasi na ye akomaki na zemi, bongo abotaki Enoki. Kayina atongaki engumba. Apesaki yango kombo « Enoki, » kombo ya mwana na ye ya mobali.


Nzokande, wana Abisalomi azalaki nanu na bomoi, azwaki libanga ya ekaniseli mpe atelemisaki yango na lubwaku ya mokonzi lokola ekaniseli mpo na ye, pamba te amilobelaki : « Nazali te na mwana mobali oyo akoki komema kombo na ngai lokola ekaniseli. » Boye apesaki libanga yango kombo na ye, mpe yango wana babengaka yango kino lelo « Ekaniseli ya Abisalomi. »


Amilobelaka : « Eloko moko te ekotikala kolengisa ngai. » Alapaka ndayi boye : « Moko te akotikala kosala ngai mabe. »


Moto akendaka mpe azongaka, azali kaka lokola elili ; amitungisaka kaka pamba, andukaka bomengo, kasi ayebaka te soki nani akotikala na yango.


Yawe, tambolisa ngai na bosembo na Yo, pamba te nazali na banguna ; bongisa nzela oyo olingi ete natambola na yango.


Balendisanaka mpo na mabongisi mabe, bayokanaka kotia mitambo ; balobaka : « Nani akomona yango ? »


Moto ya bwanya ayebi epai azali kokende, kasi zoba atambolaka na molili ; kasi nasosoli likambo moko : suka na bango mibale ekozala kaka ndenge moko.


Pamba te moto akoki kosala mosala na ye na bwanya, na boyebi mpe na ndenge esengeli penza ; kasi akotika nyonso oyo azali na yango epai ya moto oyo amonelaki yango pasi te ; yango mpe ezali pamba mpe mabe makasi.


Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Na mokolo wana, makanisi ekobotama na motema na yo mpe okosala mabongisi ya mabe.


Bongo, Nkolo alobaki na ye : — Bino Bafarizeo, bosukolaka libanda ya bakopo mpe ya basani, kasi botondi na moyibi mpe na mabe.


Boye, bongwana na mabe na yo mpe bondela Nkolo ete alimbisa yo, soki ekoki kosalema, mpo na makanisi oyo ozalaki na yango kati na motema na yo.


Yairi, mokitani ya Manase, abotolaki etuka nyonso ya Arigobi kino na mondelo ya bato ya Geshuri mpe ya bato ya Maakati. Apesaki bamboka yango kombo na ye. Yango wana kino lelo babengaka Bashani bamboka ya Yairi.


Na tongo-tongo, Samuele atelemaki mpo na kokende kokutana na Saulo. Kasi bayebisaki ye : « Saulo akei na Karimeli, atongi kuna ekeko mpo na ye moko, bongo alongwe kuna mpe akei kino na Giligali. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ