Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 49:10 - Mokanda na Bomoi

10 Akokaki kozala na bomoi libela na libela, mpe akokaki kokufa te.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 49:10
21 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Yawe, na nzela ya nguya na Yo, kangola ngai wuta na maboko ya bato wana, kangola ngai wuta na maboko ya bato ya mokili oyo. Tika ete kufa ezala litomba na bango ! Tika ete, bango mpe bana na bango, balia na lokoso, mpe mabumu na bango etonda na bikolo oyo obombaka mpo na bango ; bongo babomba ndambo oyo ekotikala mpo na bakitani na bango !


Solo mikolo ya bomoi na ngai ekatama, ezali pamba na miso na Yo. Bomoi ya moto nyonso ezali kaka mopepe.


Komitungisaka te soki moto moko akomi kofuluka na bozwi, soki kongenga ya ndako na ye ekomi komata se komata.


nasilaki mayele, nakomaki lokola zoba, nakomaki lokola nyama liboso na Yo.


Moto nani akoki kozala na bomoi mpe azanga komona kufa ? Nani akolonga kokima nguya ya mboka ya bakufi ?


Bino bato ya kilikili, bososola ! Bazoba, bokokoma mayele tango nini ?


Bomengo ekolongisa ata moke te na mokolo ya kanda ya Nzambe, kasi bosembo ekangolaka na kufa.


Moto oyo alingaka koyekola alingaka boyebi, kasi moto oyo aboyaka pamela azali zoba.


Bozwi ya bato ya bwanya ezalaka lokola motole na bango, kasi bozoba ya bato oyo bazangi mayele ezalaka lokola liboma.


Solo, nazali zoba koleka bato nyonso, nazali ata na mayele ya bomoto te ;


Nzambe apesaka bwanya, mayele mpe esengo na moto oyo asepelisaka Ye ; kasi apesaka mosala ya kosangisa mpe ya konduka bomengo epai ya moto oyo asalaka masumu mpo ete atika yango na maboko ya moto oyo asepelisaka Nzambe. Wana mpe ezali pamba, ezali lokola moto azali kolanda mopepe.


Bango nyonso bazangi mayele mpe bazali bazoba ; mateya na bango ezalaka ya pamba, mpe banzambe na bango ezalaka se banzete ya pamba !


Moto oyo azwaka bomengo na nzela ya sembo te azali lokola ndeke oyo evandeli maki ya ndeke mosusu. Boye, bomengo yango ekokima na kati-kati ya bomoi na ye mpe ekomonisa bozoba na ye na suka ya bomoi na ye.


Kasi Nzambe alobaki na ye : « Zoba ! Na butu ya lelo kaka, okokufa. Bongo nani akokoma nkolo biloko nyonso oyo ondukaki mpo na yo moko ? »


Bongo ndenge kaka ekatama ete moto nyonso asengeli kokufa mbala moko, mpe, sima na yango, kosambisama eya,


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ