Boye batelemaki mpe bakimaki na pokwa, basundolaki bandako na bango ya kapo, bampunda na bango mpe ba-ane na bango. Batikaki molako ndenge ezalaki mpo na kobikisa bomoi na bango.
Pasi ekomeli ye lokola mwasi oyo azali na pasi ya kobota ; kasi mpo ete azali lokola mwana azanga mayele, soki tango ya kobotama ekoki, abimaka na libumu ya mama na ye te.