Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 48:4 - Mokanda na Bomoi

4 Nzambe azali kati na bandako na yango ya bokonzi, amimonisi lokola ndako batonga makasi.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 48:4
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Suka na suka, mokonzi ya Siri asilikaki makasi, abengisaki bakalaka na ye mpe atunaki bango : — Bokoki te koyebisa ngai nani kati na biso azali na ngambo ya mokonzi ya Isalaele ?


Azali koloba : « Boni, bakambi na ngai bazali bango nyonso ndenge moko na bakonzi te ?


Eyano nini tokopesa penza epai ya bamemi sango ya ekolo oyo ? Ezali ete Yawe asili kolendisa Siona mpo ete babola kati na bato na Ye basili kozwa ebombamelo ya malonga. »


Na mokolo wana, bakoyemba nzembo oyo kati na mokili ya Yuda : Tozali na engumba moko ya makasi ; Nzambe akomisi lobiko lokola mir mpe ebombamelo na yango.


Tango Akazi, mwana mobali ya Yotami, mwana mobali ya Oziasi, akomaki mokonzi ya Yuda, Retsini, mokonzi ya Siri, mpe Peka, mwana mobali ya Remalia, mokonzi ya Isalaele, bakendeki kobundisa Yelusalemi, kasi bakokaki kolonga yango te.


Kasi nyama ekangamaki elongo na mosakoli ya lokuta oyo azalaki kosala bikamwa na kombo ya nyama. Na nzela ya bikamwa yango, akosaki bato oyo batiamaki elembo ya nyama mpe bagumbamelaki ekeko na yango. Bango mibale : nyama mpe mosakoli ya lokuta, babwakamaki ya bomoi kati na liziba ya moto mpe ya sofolo.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ