Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 48:3 - Mokanda na Bomoi

3 Ezali kitoko, ngomba moke oyo esalaka esengo ya mokili mobimba, ngomba Siona ! Ngambo na yango ya Nor nde ezali engumba ya Mokonzi Monene.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 48:3
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Atako bongo, Davidi abotolaki ndako makasi ya Siona, oyo ezali engumba ya Davidi.


Tango Yawe amonaki ete basili komikitisa, Yawe alobaki lisusu epai ya Shemaya : — Lokola basili komikitisa na kondima mabe na bango, nakobebisa bango te ; kasi kala mingi te, nakokangola bango, mpe kanda na Ngai ekokitela Yelusalemi te na nzela ya Shishaki.


Nzembo ya mobembo mpo na kokende na Ndako ya Yawe. Bato oyo batiaka elikya kati na Yawe bazali lokola ngomba Siona oyo eninganaka te, oyo epikama mpo na libela.


Tika ete, wuta na Siona, Yawe apambolama, Ye oyo avandaka na Yelusalemi ! Bokumisa Yawe !


Bikolo ezali kotomboka, bamboka ezali kokweya ; kasi Nzambe atomboli mongongo na Ye, mpe mabele ebukani.


Wuta na Siona, mboka kitoko, Nzambe azali kongenga lokola moyi.


Oh mwasi na ngai ya motema, ozali kitoko lokola engumba ya Tiritsa ; elongi na yo ezali kitoko lokola engumba Yelusalemi ; obangisaka lokola mampinga ya basoda na se ya bendele na bango.


Bato nyonso oyo bolekelaka na nzela na yo bazali kobeta maboko na kokamwa, bazali kobeta piololo mpe koningisa mito mpo na Yelusalemi, mboka kitoko : « Boni, ezali solo engumba oyo bazalaki kobenga kitoko ekoka mpe esengo ya mokili mobimba ? »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ