Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 48:14 - Mokanda na Bomoi

14 Botala lopango na yango, botala malamu bandako na yango mpo ete bopesa sango epai ya bato oyo bakoya na sima.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 48:14
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Otiaki Isalaele, bato na Yo, mpo ete bazala bato na Yo mpo na libela ; bongo Yo, oh Yawe, okomaki Nzambe na bango.


Nalobaka na Yawe : « Ozali Nkolo na ngai, Yo moko kaka nde ozali bolamu na ngai. »


Atambolisaka bato oyo bamikitisa, kati na banzela ya sembo, mpe ateyaka bango banzela na Ye.


Nayokaka matongi na bango na tina na ngai tango basanganaka mpe basalaka makita mpo na koluka ndenge nini koboma ngai.


Ezala ndenge nakomi sik’oyo mobange mpe suki na ngai ekomi pembe, oh Nzambe na ngai, kotika ngai te, mpo ete natatola makasi na Yo epai ya bato ya ekeke oyo, mpe misala ya nguya na Yo epai ya bato nyonso oyo bakoya sima.


Otambolisaka ngai na nzela ya toli na Yo, mpe, na sima, okoyamba ngai kati na nkembo.


Nzoto na ngai ekoki kobeba, mpe motema na ngai ekoki kolemba ; kasi Nzambe azali Libanga mpe libula na ngai mpo na tango nyonso.


Natambolaka na nzela ya bosembo, mpe nasalelaka banzela oyo ememaka na boyengebene,


Yawe akotambolisa yo tango nyonso, akokokisa baposa na yo kati na mokili ekawuka mpe akokembisa mikuwa na yo. Okozala lokola elanga oyo basopeli mayi, lokola liziba oyo mayi na yango ekawukaka te.


Nzokande, tala makambo oyo nakanisaka ; oyo mpo na yango, nazalaka na elikya :


Soki lipata etelemi na likolo ya Mongombo mikolo mibale to sanza moko to mpe mobu moko, bana ya Isalaele mpe bazalaki kaka kowumela na molako, bazalaki kokende te ; kasi soki elongwe, bango mpe bazalaki kokende.


Tango akoya, Molimo ya bosolo, akotambolisa bino kati na bosolo nyonso ; pamba te akoloba te makambo kowuta na Ye moko, kasi akoloba kaka makambo nyonso oyo akoyoka, mpe akoyebisa bino makambo oyo ekoya ;


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ