Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 48:10 - Mokanda na Bomoi

10 Nzambe, kati na Tempelo na Yo, tokanisaka bolingo na Yo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 48:10
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Yawe azali Nzambe na biso, mikano na Ye ekambaka mokili mobimba.


Pamba te Yawe azali sembo, alingaka bosembo. Bato ya sembo bakomona elongi na Ye.


Longwa na este kino na weste, tika ete Kombo ya Yawe epambolama !


Yawe azali sembo na nyonso oyo asalaka mpe atonda na bolingo kati na misala na Ye nyonso.


Nzambe, Kiti ya Bokonzi na Yo ekowumela seko na seko ; lingenda ya bokonzi na Yo ezali mpo na bosembo.


Mokonzi azali na nguya, alingaka bosolo. Olendisaka bosembo. Osalaki bosembo mpe bosolo kati na Jakobi.


Boye, kobanga te, pamba te nazali elongo na yo ; komitungisa te, mpo ete nazali Nzambe na yo ; nakoyeisa yo makasi mpe nakosunga yo ; solo, nasimbi yo na loboko na Ngai ya mobali, loboko oyo elongisaka.


Kombo na Ngai ekozala monene kati na bikolo, longwa na ebimelo kino na elalelo ya moyi ; bakobonza na bisika nyonso malasi ya ansa lokola mbeka mpo na Kombo na Ngai mpe makabo ya peto, pamba te Kombo na Ngai ekozala monene kati na bikolo, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.


« Tika ete alakelama mabe, ye oyo azali na ebwele ya kitoko kati na etonga na ye, mpe alapi ndayi ete akobonza yango epai na Yawe, kasi abonzi ebwele oyo ebela ! Pamba te Ngai, nazali Mokonzi Monene, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga, mpe bikolo nyonso esengeli kobanga Kombo na Ngai.


Tango bosaleli te maloba nyonso ya mibeko oyo ekomami na buku oyo mpe botosi te Kombo ya lokumu mpe ya somo, Yawe, Nzambe na bino ;


Bato ya Kanana mpe bato mosusu ya mokili bakoyoka sango yango, bakobalukela biso mpe bakolongola kombo na biso na mokili. Boye, okosala nini mpo na monene ya Kombo na Yo ?


Bongo namonaki Lola efungwami, mpe mpunda moko ya pembe ezalaki liboso na ngai. Kombo ya motambolisi ya mpunda yango ezali : « Sembo mpe Solo. » Akataka makambo mpe abundaka bitumba na bosembo.


pamba te akataka makambo na bosolo mpe na bosembo ; apesi etumbu epai ya mwasi ya ndumba monene oyo azalaki kobebisa mokili na nzela ya kindumba na ye, mpe azongisi mabe na mabe mpo na makila ya bawumbu na Ye. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ