Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 47:8 - Mokanda na Bomoi

8 Pamba te Nzambe azali Mokonzi ya mokili mobimba ; boyemba nzembo mpo na lokumu na Ye.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 47:8
18 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tika ete likolo esepela mpe mabele ezala kati na esengo ! Tika ete baloba kati na bikolo : « Yawe azali mokonzi ! »


Akopesa bikolo etumbu : bikolo nyonso ekotonda na bibembe, mpe akonyata bakambi kati na mokili mobimba.


Loboko na Yo ezali na makasi, loboko na Yo ezali na nguya, loboko na Yo ya mobali oyo otombola.


Banguna na ngai bazongaka sima, bakweyaka mpe balimwaka liboso na Yo.


Yawe azali kokonza, alati lokumu monene ; Yawe alati penza lokumu monene mpe amizingeli na nguya. Solo, mokili etelema ngwi, eninganaka te.


Boni, bokonzi ya mabe oyo ememelaka bato pasi na nzela ya mibeko na yango ; boni, ezali lisanga moko elongo na Yo ?


Boloba kati na mabota : « Yawe azali Mokonzi ! Mokili elendisama makasi, ekoningana te. Yawe asambisaka bato na bosembo. »


Yawe azali kokonza ! Tika ete mabele esepela ; tika ete ebele ya bisanga ezala na esengo !


Yawe azali kokonza ; tika ete bato balenga ! Avandi na Kiti ya Bokonzi kati na basheribe ; tika ete mabele eningana !


Yawe azali monene kati na Siona, mpe Bokonzi na Ye ezali likolo ya bikolo nyonso.


Yawe akozala Mokonzi ya mabele mobimba. Na mokolo wana, Ye moko kaka nde akozala Nkolo, mpe bakosambela kaka Ye.


« Tika ete alakelama mabe, ye oyo azali na ebwele ya kitoko kati na etonga na ye, mpe alapi ndayi ete akobonza yango epai na Yawe, kasi abonzi ebwele oyo ebela ! Pamba te Ngai, nazali Mokonzi Monene, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga, mpe bikolo nyonso esengeli kobanga Kombo na Ngai.


Boye, topusana na elikya nyonso pene ya Kiti ya Bokonzi ya ngolu mpo ete Nzambe ayokela biso mawa mpe tozwa ngolu, oyo ekosunga biso na tango oyo ekoki.


Bongo nayokaki makelele moko lokola makelele ya bato ebele, lokola makelele ya bibale minene, mpe lokola lokito ya kake makasi ; ezalaki koganga : « Aleluya ! Pamba te Yawe na biso, Nzambe-Na-Nguya-Nyonso, atalisi bokonzi na Ye.


Bongo namonaki Kiti monene ya Bokonzi, ya langi ya pembe elongo na Ye oyo avandaki na Kiti yango. Likolo mpe mabele ekimaki mosika na Ye mpe emonanaki lisusu te.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ