Nzembo ya Davidi. Maloba ya Yawe epai ya nkolo na ngai : « Vanda na ngambo ya loboko na Ngai ya mobali kino nakomisa banguna na yo enyatelo makolo na yo. »
Oh Mokonzi ya bikolo, nani akoki koboya kotosa Yo ? Obongi na lokumu, pamba te moko te azali lokola Yo kati na bato nyonso ya bwanya ya bikolo mpe kati na mikili na bango nyonso.
« Tika ete alakelama mabe, ye oyo azali na ebwele ya kitoko kati na etonga na ye, mpe alapi ndayi ete akobonza yango epai na Yawe, kasi abonzi ebwele oyo ebela ! Pamba te Ngai, nazali Mokonzi Monene, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga, mpe bikolo nyonso esengeli kobanga Kombo na Ngai.
Oh Isalaele, ozali solo libota ya esengo ! Libota nini ekokani na yo, yo libota oyo Yawe abikisi ? Ye azali nde nguba na yo mpe mosungi na yo ya nkembo. Banguna na yo bakokima liboso na yo, mpe okonyata bisika na bango, oyo eleki likolo. »
Ye nde akobongola nzoto na biso ya putulu mpo na kokomisa yango nzoto ya nkembo, na nzela ya nguya na Ye ya kotia biloko nyonso na se ya bokonzi na Ye.
Yawe apesaki bango kimia na bangambo nyonso, kolanda nyonso oyo alakaki batata na bango na nzela ya ndayi. Monguna moko te kati na banguna na bango alongaki lisusu kotelemela bango. Yawe akabaki banguna na bango nyonso na maboko na bango.