Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 46:3 - Mokanda na Bomoi

3 Yango wana, tobangaka te ata soki mabele eningani, bangomba ekweyi kati na ebale monene ;

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 46:3
17 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Yawe alobaki : — Bima mpe telema na ngomba liboso ya Yawe, pamba te Yawe alingi koleka. Boye mopepe moko ya makasi penza epepaki, ebukaki bangomba mpe epanzaki mabanga liboso ya Yawe. Nzokande Yawe azalaki kati na mopepe makasi te.


tango nalobaki : ‹ Okosuka kino awa, kasi mosika te ; awa nde ekosukela mbonge ya lolendo na yo ? ›


Nabelelaki Yawe oyo abongi na lokumu, mpe nakangolamaki wuta na maboko ya banguna na ngai.


Sik’oyo, bino bavandi ya Yelusalemi, bato ya Yuda, bokata makambo kati na ngai mpe elanga na ngai ya vino !


Ata bangomba milayi eningani, ata bangomba mikuse elongwe na bisika na yango, bolingo na Ngai epai na yo ekoningana te, mpe boyokani na Ngai ya kimia ekotikala kolongwa te, elobi Yawe oyo alingaka yo.


Tango natalaki bangomba, namonaki yango koningana, bangomba nyonso ya mike ezalaki kobukana.


Bokoki penza kobanga Ngai te, » elobi Yawe ? « Bokoki solo kolenga liboso na Ngai te, Ngai oyo nasala zelo lokola mondelo ya mayi, epekiselo ya libela oyo mayi ekoleka ata mokolo moko te ? Mayi ekoki kotomboka, kasi ezali na nguya te ; ata soki esali makelele, kasi ekoleka mondelo yango te.


Na se ya matambe na Ye, bangomba ezali kopasuka, mabwaku ezali kopanzana ndenge mafuta eyandukaka na moto, ndenge mayi ya mvula etiolaka na lombangu na mipanzi ya bangomba.


Bangomba milayi eninganaka liboso na Ye, mpe bangomba mikuse epanzanaka. Mabele, mokili mpe bavandi na yango balengaka liboso na Ye.


Tango mvula ebetaki makasi, mayi mpe mopepe eyaki makasi, emibwakaki na ndako yango ; kasi atako bongo, ndako ekweyaki te, pamba te miboko na yango etongamaki na likolo ya libanga.


Bisanga nyonso ekimaki, mpe bangomba emonanaki lisusu te.


Anjelu alobaki na ngai : « Mayi oyo omonaki, oyo mwasi ya ndumba avandaki na likolo na yango, ezali bato ya mokili, bangulupa ebele ya bato, bikolo mpe nkota.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ