azali Nzambe na ngai, libanga na ngai mpe ebombamelo na ngai ; azali nguba na ngai, nguya oyo ebikisaka ngai, ekimelo na ngai, mpe Mobikisi na ngai. Okangolaka ngai wuta na maboko ya bato mabe.
Kati na pasi na ngai, nabelelaki Yawe, nagangaki epai ya Nzambe na ngai mpo ete asunga ngai. Yawe ayokaki mongongo na ngai wuta na Tempelo na Ye ; koganga na ngai mpo na kosenga lisungi ekomaki kino na matoyi na Ye.
Ata soki nasengeli kokatisa lubwaku oyo etondi na molili ya kufa, nakobanga mabe ata moko te, pamba te ozali elongo na ngai, nzete na Yo ya mobateli ekambaka ngai, mpe lingenda na Yo ebatelaka ngai.
Yawe azali makasi mpe nguba na ngai ; natielaka Ye motema na ngai, mpe asungaka ngai. Motema na ngai etondi na esengo, mpe nazali kokumisa Ye na banzembo na ngai.
Kasi ngai nakoyembela makasi na Yo, nakobetela bolingo na Yo milolo, na tongo, pamba te ozali ebombamelo na ngai, mpe ekimelo na ngai na tango ya pasi.
Oh Elikya ya Isalaele, Mobikisi na ye na tango ya pasi, mpo na nini ozali kosala makambo lokola mopaya kati na mboka oyo to lokola moleki nzela oyo atelemaka kaka na mboka mpo na kolekisa butu ?
Yesu azongiselaki bango : — Nazali koloba na bino penza ya solo : soki bozali na kondima mpe botie tembe te, bokoki kaka te kosala makambo oyo Ngai nasali na nzete ya figi oyo, kasi bokoki mpe koloba na ngomba wana : « Longwa wana mpe mibwaka na ebale, » yango ekosalema solo.