9 Bilamba na Yo nyonso ezali kolumba solo kitoko ya malasi ya mire, ya aloe mpe ya kaneli ; wuta na bandako minene oyo ebongisama na pembe ya nzoko, mandanda ezali kosepelisa Yo.
Tango Batisheba akendeki epai ya mokonzi Salomo mpo na kolobela Adoniya, mokonzi atelemaki mpo na kokutana na Batisheba, agumbamaki liboso na ye mpe avandaki na kiti na ye ya bokonzi. Asengaki ete batia kiti mpo na mama ya mokonzi, mpe Batisheba avandaki na ngambo ya loboko ya mobali ya mokonzi.
Kasi sik’oyo, kozwa ye te lokola moto oyo asali mabe te. Ozali na bwanya, okoyeba nini osengeli kosala mpo na ye. Kitisa suki na ye ya pembe kati na makila, na mboka ya bakufi. »
Bakonzi bakozala batata babokoli na yo, mpe basi na bango, basungi na yo ; bakofukama liboso na yo na bilongi etala na mabele, bakolembola putulu ya makolo na yo. Boye, okoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe ; ete bato oyo batielaka Ngai motema bayokisamaka soni te. »
Mwasi ya libala azali ya mobali oyo abali ye ; mpe moninga ya mobali oyo asili kobala, ezali moto oyo atelemi pembeni na ye mpe azali na esengo makasi tango azali koyoka mongongo na ye. Ezali mpe bongo mpo na ngai : esengo na ngai ezali sik’oyo ya kokoka.
Tika ete tosepela, totonda na esengo mpe topesa Ye nkembo ! Pamba te tango ya feti ya libala ya Mpate ekoki. Mwasi mobandami na Ye ya libala asili komibongisa.
Namonaki engumba ya bule, Yelusalemi ya sika, kokita wuta na Lola epai ya Nzambe. Ebongisamaki lokola mwasi mobandami ya libala oyo asali monzele mpo na mobali na ye.
Moko kati na ba-anjelu sambo oyo bazalaki na bakopo sambo etonda na bitumbu sambo ya suka ayaki mpe alobaki na ngai : « Yaka, nakolakisa yo mwasi mobandami ya libala, mwasi ya Mpate. »