Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 45:5 - Mokanda na Bomoi

5 Kati na kongenga na Yo, zala molongi, mata na shar na Yo, telema mpo na solo, mpo na komikitisa, mpe mpo na bosembo ; tika ete loboko na Yo ya mobali esala misala minene.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 45:5
18 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Atako bakani kosala Yo mabe, atako basali mabongisi ya mabe mpo na kotelemela Yo, bakotikala kolonga ata moke te ;


Babola bakolia mpe bakotonda ; bato oyo balukaka Yawe bakosanzola Ye. Tika ete bozala na bomoi libela na libela.


Yawe, kopamela ngai te kati na kanda na Yo to kopesa ngai etumbu te kati na kanda makasi na Yo.


Na eleko ya mokonzi wana, mokili ya Yuda ekobikisama, mpe mokili ya Isalaele ekozala na kimia. Tala kombo oyo bakobengela ye : Yawe azali Bosembo na biso.


Nzambe abimisaki bango na Ejipito, bazalaka makasi lokola mpakasa, babebisaka bikolo oyo ebundisaka bango mpe babukaka mikuwa na bango na biteni-biteni, batobolaka yango na makonga na bango.


Tango bato bayokaki bongo, mitema na bango eyokaki pasi makasi mpe balobaki na Petelo mpe bantoma mosusu : — Bandeko, tosala nini ?


Bato oyo bandimaki mateya ya Petelo bazwaki libatisi. Mpe na mokolo wana, bato pene nkoto misato babakisamaki na lisanga ya bandimi.


Kasi kati na bato oyo bayokaki mateya, mingi bandimaki yango ; bongo motango ya bandimi ebakisamaki mpe bakomaki bato pene nkoto mitano.


Nzokande, mibali mpe basi ebele penza bazalaki kondimela Nkolo mpe kobakisama na lisanga na bango.


Tango bayokaki bongo, batombokaki makasi mpe bazwaki mokano ya kobomisa bantoma.


Boye, Liloba na Nzambe ezalaki kokoba kopanzana, motango ya bayekoli ezalaki mpe kobakisama makasi na Yelusalemi mpe Banganga-Nzambe ebele bakomaki kondimela Yesu.


Tango bato ya Likita-Monene bayokaki bongo, batombokaki makasi mpe bakomaki kolia minu mpo na Etieni.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ