Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 45:3 - Mokanda na Bomoi

3 Oleki bato nyonso na kitoko, mpe bibebu na Yo ebimisaka ngolu ; yango wana Nzambe apambola Yo mpo na libela.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 45:3
22 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Wana azalaki nanu koloba, ntoma mosusu ayaki mpe alobaki : « Moto ya Nzambe ekweyi longwa na likolo mpe ezikisi bibwele mpe basali ! Ngai moko kaka moto nabiki ; yango wana nayei kopesa yo sango ! »


Eh molimo na ngai, pambola Yawe ! Yawe, Nzambe na ngai, ozali monene ! Olata kongenga mpe lokumu,


Bazali koyebisa bato misala na Yo ya minene mpe kongenga ya nkembo ya bokonzi na Yo.


Nakolemba te kotatola bikamwa na Yo mpe kongenga makasi ya nkembo na Yo.


Asengaki Yo bomoi, mpe opesaki ye yango ; opesaki ye bomoi molayi mpe ya libela na libela.


Solo, okomisi ye etima ya mapamboli ya seko na seko ; okomisaki ye moto ya esengo na miso na Yo.


Kongenga mpe nkembo monene ezali liboso na Ye, nguya mpe nkembo ezali kati na Esika na Ye ya bule.


Ndenge nzete ya pome ezalaka kati na banzete ya zamba, ndenge wana mpe mobali na ngai azalaka kati na bilenge mibali. Nasepelaka kovanda na se ya elilingi na ye, mpe mbuma na ye ezalaka elengi na monoko na ngai.


Matama na ye ezali lokola mikala ya banzete ya malasi, lokola ekolo ya bafololo ya solo kitoko ; bibebu na ye ezali lokola fololo oyo babengaka lisi oyo ebimisaka mire ya kitoko.


akomisi monoko na ngai lokola mopanga ya minu makasi, abombi ngai na se ya elili ya loboko na Ye, akomisi ngai lokola tolotolo mpe abombi ngai kati na ebombelo batolotolo na Ye ;


Atindaki Liloba na Ye epai ya bana ya Isalaele mpo na kosakola Sango Malamu ya kimia, na nzela ya Yesu-Klisto oyo azali Nkolo ya bato nyonso.


Ezali mpo na yango nde Klisto akufaki mpe asekwaki, mpo ete azala Nkolo ya bakufi mpe ya bato ya bomoi.


Mwana yango amonisaka kongenga ya nkembo ya Nzambe, azali elilingi oyo etalisaka mobimba ya Nzambe mpe asimbi biloko nyonso na nguya ya Liloba na Ye. Sima na Ye kopetola masumu ya bato, avandi kati na Likolo, na ngambo ya loboko ya mobali ya Nzambe-Na-Nguya-Nyonso,


Pamba te Liloba na Nzambe ezali na bomoi mpe na nguya, ekotaka koleka kutu mopanga oyo ezali na minu na bangambo nyonso mibale, ekomaka kino kokabola elimo mpe molimo, mikuwa mpe mafuta oyo ezalaka kati na mikuwa, mpe esosolaka malamu makanisi mpe mikano ya motema ya moto.


Tala likambo oyo eleki motuya kati na makambo oyo tozali koloba : tozali solo na Mokonzi se moko ya Banganga-Nzambe, Mokonzi oyo avandi na ngambo ya loboko ya mobali ya Kiti ya Bokonzi ya Nzambe kati na Likolo.


epai ya Nzambe moko kaka, Mobikisi na biso, na nzela ya Yesu-Klisto, Nkolo na biso, tika ete nkembo, lokumu, nguya mpe bokonzi ezala ya Ye, wuta liboso ya tango, sik’oyo mpe mpo na libela na libela ! Amen !


Na loboko na Ye ya mobali, asimbaki minzoto sambo ; mpe wuta na monoko na Ye, mopanga moko bapelisa na bangambo na yango nyonso mibale ezalaki kobima. Elongi na Ye ezalaki lokola moyi, na tango oyo engalaka makasi.


Mopanga moko ya minu ezalaki kobima na monoko na Ye mpo na kobeta bikolo. Akokamba yango na lingenda ya ebende mpe akonika bambuma ya vino kati na ekamolelo ya vino ya kanda monene ya Nzambe-Na-Nguya-Nyonso.


Bongo mopanga oyo ebimaki na monoko ya Motambolisi ya mpunda ebomaki bato oyo batikalaki, mpe bandeke nyonso etondaki na kolia misuni ya bibembe na bango.


Ewudi amisalelaki mopanga ya minu mibale, ya ndambo ya metele na molayi. Akangaki yango na loketo na ye, na ngambo ya loboko ya mobali, mpe abombaki yango na se ya bilamba na ye.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ